< Banzembo 139 >
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Yawe, omonaka mozindo ya bomoi na ngai mpe oyebi ngai malamu;
上主,您鑒察我,也認清我:
2 oyebi tango navandaka mpe tango natelemaka. Liboso na ngai kokanisa, ososolaka mabongisi na ngai;
我一舉一動,您全然認清我,您由遠處已明徹我的心思。
3 omonaka tango natambolaka mpe tango nalalaka, oyebi mozindo ya banzela na ngai nyonso.
我或行走或躺臥,您已先知,我的一切行動,您都熟悉。
4 Pamba te, oh Yawe, liboso ete liloba ekoma na lolemo na ngai, omiyebelaka yango.
我的話尚未發言,上主,您已全都知曉。
5 Ozali pene ngai, na liboso mpe na sima, mpe osimbi ngai na loboko na Yo.
您將我前後包圍,用您的聖手將我蔭庇。
6 Solo, boyebi oyo ya kokamwa elekelaka ngai, ezali likolo makasi, nakoki kososola yango te.
這是超越我理智的奇事,是我不能明白的妙理。
7 Nakende wapi mpo na kokima Molimo na Yo? Nakima wapi mpo na kozala mosika na Yo?
我往何處,才能脫離您的神能?我去那裏,才能逃避您的面容?
8 Soki namati na likolo, ozali kuna; soki nakeyi na mboka ya bakufi, ozali lisusu kuna. (Sheol )
我若上升於高天,您已在那裏,我若下降於陰府,您也在那裏。 (Sheol )
9 Soki nazwi mapapu ya lipekapeka mpo na kokende kovanda mosika ya ebale monene,
我若飛往日出的地方,我若住在海洋的西方,
10 kuna mpe loboko na Yo ekotambolisa ngai, loboko na Yo ya mobali ekosimba ngai makasi.
您的雙手仍在那裏引導著我,您的聖手還在那裏扶持著我。
11 Soki nalobi: « Tembe te, molili ekobomba ngai penza; tika ete pole ekoma butu zingazinga na ngai! »
我若說:願黑暗把我籠罩,光明變成黑暗將我圍包;
12 Epai na Yo, butu ezalaka molili te, butu ezalaka na pole lokola moyi, pole mpe molili ezali ndenge moko.
黑暗與黑夜對您並不矇矓,黑夜與白晝對您一樣光明。
13 Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai, obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.
您造成了我的五臟和六腑,您在我成胎之中締結了我。
14 Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi. Misala na Yo ezali ya kokamwa; ngai, nayebi yango malamu.
上主,我讚美您,因我被造驚奇神奧;您的工作千奇萬妙!我的生命,您全知曉。
15 Na miso na Yo, nzoto na ngai ezalaki ya kobombama te tango osalaki ngai na esika ebombama, tango otongaki ngai kati na mozindo ya mabele.
我何時在暗中構形,我何時在母胎造成,我的骨骸您全知情,
16 Tango nazalaki nanu na lolenge te, ozalaki komona ngai; mpe omikomelaki kati na buku na Yo mikolo nyonso oyo obongisaki mpo na bomoi na ngai liboso ete moko te kati na yango ezala.
我尚在母胎,您已親眼看見,世人的歲月尚未來到以前,都已全部記錄在冊表,都已全由您預先定好。
17 Oh Nzambe, tala ndenge ezali pasi mpo na ngai kososola makanisi na Yo! Tala ndenge motango na yango ezali ebele!
天主,您的策略,對我何其深奧!您策略的總數又是何其繁浩!
18 Nameki kotanga yango, ezali ebele koleka motango ya bambuma ya zelo. Nalamuki, nazali kaka elongo na Yo.
我若去計數,而它們多於沙粒;設若數到底,我仍同您在一起。
19 Oh Nzambe, soki kaka ozalaki na Yo koboma moto mabe! Bino basopi makila ya bato, bokende mosika na ngai!
天主,恨不得您能殺掉惡人,叫流人血的兇遠離我身!
20 Bayini na Yo basalelaka Kombo na Yo mpo na kosala mabongisi ya mabe, batangaka Kombo na Yo mpo na kokosa.
他們無法無天地褻瀆您,他們不忠不義地攻擊您。
21 Yawe, ndenge nini nayina te banguna na Yo, ndenge nini nayoka batelemeli na Yo nkele te?
上主,憎恨您的人,我怎能不痛惡?上主,背叛您的人,我怎能不厭惡?
22 Nayinaka bango makasi; nazwaka bango lokola banguna na ngai.
我對他們深惡痛棄,視他們為我的仇敵。
23 Oh Nzambe, kundola mpe yeba mozindo ya motema na ngai, meka ngai mpe yeba makambo oyo ezali kotungisa ngai!
天主,求您檢察我,洞知我的心曲;天主,求您考驗我,明悉我的思慮。
24 Tala soki nazali kotambola na nzela mabe mpe tambolisa ngai na nzela ya tango nyonso!
求您察看我,我是否走入岐途,求您引導我邁向上永生的道路。