< Banzembo 138 >

1 Nzembo ya Davidi. Nasanzolaka Yo na motema na ngai mobimba; nayembelaka Yo banzembo liboso ya banzambe.
A Psalm of David. I will praise thee with my whole heart: before the gods will I sing praise to thee.
2 Nagumbamaka na kotala na ngambo ya Tempelo na Yo ya Bule mpe nasanzolaka Kombo na Yo mpo na bolingo mpe boyengebene na Yo, pamba te osalaki ete Kombo na Yo ekende sango na nzela ya kokokisama ya bilaka na Yo.
I will worship toward thy holy temple, and praise thy name for thy lovingkindness and for thy truth: for thou hast magnified thy word above all thy name.
3 Na mokolo oyo nabelelaki Yo, oyanolaki ngai, otondisaki ngai na mpiko mpe na makasi.
In the day when I cried thou didst answer me, and strengthen me with strength in my soul.
4 Yawe, bakonzi nyonso ya mabele bakokumisa Yo tango bakoyoka maloba kobima na monoko na Yo;
All the kings of the earth shall praise thee, O LORD, when they hear the words of thy mouth.
5 bakoyemba na tina na banzela ya Yawe, pamba te nkembo na Yawe ezali monene.
Yea, they shall sing in the ways of the LORD: for great is the glory of the LORD.
6 Atako Yawe atombwama, atalaka bato oyo bamikitisa mpe amonaka na mosika bato ya lolendo.
Though the LORD is high, yet hath he respect to the lowly: but the proud he knoweth afar off.
7 Tango pasi ekweyelaka ngai, obatelaka bomoi na ngai, osembolaka loboko na Yo mpo na kotelemela kanda ya banguna na ngai; mpe loboko na Yo ya mobali ebikisaka ngai.
Though I walk in the midst of trouble, thou wilt revive me: thou shalt stretch forth thy hand against the wrath of my enemies, and thy right hand shall save me.
8 Yawe akokisaka makambo nyonso mpo na bolamu na ngai. Yawe, bolingo na Yo ewumelaka seko na seko! Kosundola te bato oyo osala na maboko na Yo!
The LORD will perfect that which concerneth me: thy mercy, O LORD, endureth for ever: forsake not the works of thy own hands.

< Banzembo 138 >