< Banzembo 136 >

1 Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu;
Give thanks to the LORD, for he is good; for his loving kindness endures forever.
2 Bosanzola Nzambe ya banzambe;
Give thanks to the God of gods; for his loving kindness endures forever.
3 Bosanzola Nkolo na bankolo;
Give thanks to the Lord of lords; for his loving kindness endures forever:
4 Ye kaka nde asalaka bikamwa ya minene;
To him who alone does great wonders; for his loving kindness endures forever:
5 Akelaki likolo na mayele na Ye;
To him who by understanding made the heavens; for his loving kindness endures forever:
6 Atandaki mabele na likolo ya mayi;
To him who spread out the earth above the waters; for his loving kindness endures forever:
7 Akelaki biloko minene oyo ebimisaka pole;
To him who made the great lights; for his loving kindness endures forever:
8 moyi mpo na kongengisa mokolo;
The sun to rule by day; for his loving kindness endures forever;
9 sanza mpe minzoto mpo na kongengisa butu;
The moon and stars to rule by night; for his loving kindness endures forever:
10 Abomaki bana mibali ya liboso ya Ejipito;
To him who struck down the Egyptian firstborn; for his loving kindness endures forever;
11 Abimisaki Isalaele wuta na Ejipito;
And brought out Israel from among them; for his loving kindness endures forever;
12 na nguya monene ya loboko na Ye;
With a strong hand, and with an outstretched arm; for his loving kindness endures forever:
13 Akabolaki ebale monene ya Barozo na biteni mibale;
To him who divided the Red Sea apart; for his loving kindness endures forever;
14 Alekisaki Isalaele na kati-kati ya ebale monene ya Barozo;
And made Israel to pass through its midst; for his loving kindness endures forever;
15 Azindisaki Faraon elongo na mampinga na ye kati na ebale monene ya Barozo;
But shook off Pharaoh and his army in the Red Sea; for his loving kindness endures forever:
16 Atambolisaki bato na Ye kati na esobe;
To him who led his people through the wilderness; for his loving kindness endures forever:
17 Abetaki bakonzi minene;
To him who struck great kings; for his loving kindness endures forever;
18 Abomaki bakonzi ya nguya;
And killed mighty kings; for his loving kindness endures forever:
19 Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori;
Sihon king of the Amorites; for his loving kindness endures forever;
20 mpe Ogi, mokonzi ya Bashani;
Og king of Bashan; for his loving kindness endures forever;
21 Akabaki mabele na bango lokola libula;
And gave their land as an inheritance; for his loving kindness endures forever;
22 lokola libula epai ya Isalaele, mosali na Ye;
Even a heritage to Israel his servant; for his loving kindness endures forever:
23 Akanisaki biso tango basambwisaki biso;
Who remembered us in our low estate; for his loving kindness endures forever;
24 Akangolaki biso wuta na maboko ya banguna na biso;
And has delivered us from our adversaries; for his loving kindness endures forever:
25 Apesaka bilei na bikelamu nyonso;
Who gives food to every creature; for his loving kindness endures forever.
26 Bosanzola Nzambe ya likolo;
Oh give thanks to the God of heaven; for his loving kindness endures forever.

< Banzembo 136 >