< Banzembo 135 >
1 Bokumisa Yawe! Bokumisa Kombo ya Yawe! Bokumisa Ye, bino basali ya Yawe,
Praise Yah. Praise ye the name of Yhwh; praise him, O ye servants of Yhwh.
2 oyo botelemaka kati na Ndako ya Yawe, kati na lopango ya Ndako ya Nzambe na biso!
Ye that stand in the house of Yhwh, in the courts of the house of our God,
3 Bokumisa Yawe! Pamba te Yawe azali malamu! Boyembela Kombo na Ye, pamba te ezali kitoko makasi.
Praise Yah; for Yhwh is good: sing praises unto his name; for it is pleasant.
4 Pamba te Yawe aponaki Jakobi, Isalaele, mpo ete azala ya Ye moko.
For Yah hath chosen Jacob unto himself, and Israel for his peculiar treasure.
5 Solo, ngai nayebi malamu ete Yawe azali monene, ete Nkolo na biso aleki banzambe nyonso.
For I know that Yhwh is great, and that our Lord is above all gods.
6 Yawe asalaka nyonso oyo alingi, kuna na likolo mpe awa na mabele, kati na bibale minene mpe kati na mozindo nyonso.
Whatsoever Yhwh pleased, that did he in heaven, and in earth, in the seas, and all deep places.
7 Amatisaka mapata wuta na suka ya mokili, atindaka mikalikali elongo na mvula, abimisaka mopepe wuta na bibombelo na yango.
He causeth the vapours to ascend from the ends of the earth; he maketh lightnings for the rain; he bringeth the wind out of his treasuries.
8 Ye nde abomaki bana ya liboso ya Ejipito, kobanda na bato kino na banyama;
Who smote the firstborn of Egypt, both of man and beast.
9 atindaki bilembo ya kokamwa mpe bikamwa kati na yo, Ejipito, mpo na kotelemela Faraon mpe basali na ye nyonso;
Who sent signs and wonders into the midst of thee, O Egypt, upon Pharaoh, and upon all his servants.
10 abebisaki bikolo ebele mpe abomaki bakonzi ya nguya:
Who smote great nations, and slew mighty kings;
11 Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori; Ogi, mokonzi ya Bashani; mpe bakonzi nyonso ya Kanana.
Sihon king of the Amorites, and Og king of Bashan, and all the kingdoms of Canaan:
12 Mpe akabaki mikili na bango lokola libula, lokola libula epai ya bato na Ye, Isalaele.
And gave their land for an heritage, an heritage unto Israel his people.
13 Oh Yawe, sango ya Kombo na Yo ewumelaka libela na libela! Yawe, bakopanza sango ya Kombo na Yo seko na seko!
Thy name, O Yhwh, endureth for ever; and thy memorial, O Yhwh, throughout all generations.
14 Pamba te Yawe akolimbisa bato na Ye, akoyokela basali na Ye mawa.
For Yhwh will judge his people, and he will repent himself concerning his servants.
15 Banzambe ya bikolo ezali ya palata mpe ya wolo, esalema na maboko ya bato.
The idols of the heathen are silver and gold, the work of men’s hands.
16 Ezali na minoko, kasi elobaka te; ezali na miso, kasi emonaka te;
They have mouths, but they speak not; eyes have they, but they see not;
17 ezali na matoyi, kasi eyokaka te; ezali ata na pema te kati na minoko na yango.
They have ears, but they hear not; neither is there any breath in their mouths.
18 Bato oyo basalaka yango mpe bato nyonso oyo batielaka yango motema bakokani na yango.
They that make them are like unto them: so is every one that trusteth in them.
19 Bato ya Isalaele, bopambola Yawe! Bakitani ya Aron, bopambola Yawe!
Bless Yhwh, O house of Israel: bless Yhwh, O house of Aaron:
20 Bakitani ya Levi, bopambola Yawe! Bino nyonso oyo botosaka Yawe, bopambola Yawe!
Bless Yhwh, O house of Levi: ye that fear Yhwh, bless Yhwh.
21 Tika ete, wuta na Siona, Yawe apambolama, Ye oyo avandaka na Yelusalemi! Bokumisa Yawe!
Blessed be Yhwh out of Zion, which dwelleth at Jerusalem. Hallelu jah.