< Banzembo 133 >
1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko!
Pieśń stopni Dawidowa. Oto jako rzecz dobra, i jako wdzięczna, gdy bracia zgodnie mieszkają.
2 Ezali lokola malasi ya motuya oyo basopi na moto, bongo ezali kokita na mandefu, na mandefu ya Aron, ezali kokita kino na songe ya bilamba na ye.
Jest jako olejek najwyborniejszy wylany na głowę, ściekający na brodę, na brodę Aaronową, ściekający aż i na podołek szat jego.
3 Ezali lokola mamwe ya Erimoni, oyo ekitaka na bangomba ya Siona. Pamba te kuna, Yawe apesaka lipamboli na Ye, mpe bomoi, mpo na libela.
Jako rosa Hermon, która zstępuje na góry Syońskie; albowiem tam daje Pan błogosławieństwo i żywot aż na wieki.