< Banzembo 132 >

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, kanisa Davidi; kanisa pasi na ye nyonso!
Cantique des degrés. Éternel, souviens-toi de David, [et] de toutes ses afflictions!
2 Alapaki ndayi oyo epai na Yawe, epai ya Elombe ya Jakobi:
Comment il a juré à l’Éternel, [et] fait un vœu au Puissant de Jacob:
3 « Nakokota na ndako na ngai te, nakomata na mbeto na ngai te,
Si j’entre dans la demeure de ma maison, si je monte sur le lit où je couche,
4 nakokanga miso na ngai te mpo na kolala pongi to mpo na konimba mwa moke
Si je permets à mes yeux de dormir, à mes paupières de sommeiller,
5 kino nakozwa Esika mpo na Yawe, Ndako mpo na Elombe ya Jakobi. »
Jusqu’à ce que j’aie trouvé un lieu pour l’Éternel, des demeures pour le Puissant de Jacob!
6 Toyokaki sango na tina na yango na Efrata, tomonaki yango na elanga ya Yari.
Voici, nous avons entendu parler d’elle à Éphrata, nous l’avons trouvée dans les champs de Jaar.
7 Tokende na Ndako na Ye, togumbama liboso ya enyatelo makolo na yango.
Entrons dans ses demeures, prosternons-nous devant le marchepied de ses pieds.
8 Yawe, telema, yaka na Esika na Yo ya bopemi! Yaka elongo na Sanduku ya Boyokani epai wapi nguya na Yo ezali.
Lève-toi, Éternel! pour [entrer dans] ton repos, toi et l’arche de ta force!
9 Tika ete Banganga-Nzambe na Yo balata bosembo lokola elamba; mpe tika ete basantu na Yo baganga na esengo!
Que tes sacrificateurs soient revêtus de justice, et que tes saints chantent de joie.
10 Mpo na Davidi, mosali na Yo, kobengana mopakolami na Yo te!
À cause de David, ton serviteur, ne repousse pas la face de ton oint.
11 Yawe alapaki epai ya Davidi ndayi ya solo, oyo akowangana te: « Nakotia moko kati na bakitani na yo na kiti na yo ya bokonzi.
L’Éternel a juré à David [en] vérité, il n’en reviendra pas: Je mettrai du fruit de ton ventre sur ton trône.
12 Soki bana na yo babateli boyokani mpe mibeko na ngai, bana na bango mpe bakokitana na yo lokola bakonzi, mpe ekosalema bongo mpo na libela. »
Si tes enfants gardent mon alliance et mes témoignages que je leur enseignerai, leurs fils aussi seront assis à perpétuité sur ton trône.
13 Pamba te Yawe aponaki Siona, asepelaki kokomisa yango Esika na Ye ya kovanda:
Car l’Éternel a choisi Sion; il l’a désirée pour être son habitation:
14 « Ezali Esika na ngai ya bopemi mpo na libela; nakovanda awa, pamba te nasepelaki na yango.
C’est ici mon repos à perpétuité; ici j’habiterai, car je l’ai désirée.
15 Nakopambola, nakopambola yango na biloko ebele, nakotondisa babola na yango na bilei.
Je bénirai abondamment ses vivres, je rassasierai de pain ses pauvres;
16 Nakolatisa Banganga-Nzambe na yango lobiko, mpe bato na yango bakoganga na esengo.
Et je revêtirai de salut ses sacrificateurs, et ses saints exulteront en chantant de joie.
17 Kuna na Siona, nakobakisa nguya ya Davidi, mpe nakobimisela ye mokitani, mopakolami na ngai, lokola mwinda ya kopela.
Là je ferai germer la corne de David, j’ai préparé une lampe à mon oint.
18 Nakoyokisa banguna na ye soni, mpe motole na ye ekongenga na mbunzu na ye. »
Je revêtirai de honte ses ennemis; et sur lui fleurira sa couronne.

< Banzembo 132 >