< Banzembo 131 >
1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, motema na ngai ezali na lofundu te, miso na ngai ezali na posa makasi te; namipesaka te na makambo oyo eleki ya minene mpe eleki pasi mpo na ngai.
A song of ascents. Of David. My heart is not proud, O LORD, my eyes are not haughty. I do not aspire to great things or matters too lofty for me.
2 Kasi nabatelaki kimia kati na motema na ngai mpe namitungisaki te lokola mwana moke elongo na mama na ye. Nazali na kimia lokola mwana oyo mama alongola na mabele.
Surely I have stilled and quieted my soul; like a weaned child with his mother, like a weaned child is my soul within me.
3 Isalaele, tia elikya kati na Yawe kobanda sik’oyo mpe libela na libela.
O Israel, put your hope in the LORD, both now and forevermore.