< Banzembo 130 >
1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Nkolo, nazali kobelela Yo wuta na mozindo ya pasi!
(성전에 올라가는 노래) 여호와여, 내가 깊은 데서 주께 부르짖었나이다
2 Nkolo, yoka ngai! Yoka mabondeli na ngai!
주여, 내 소리를 들으시며 나의 간구하는 소리에 귀를 기울이소서
3 Yawe, soki obosanaka masumu te, Nkolo, nani akokaki kotelema?
여호와여, 주께서 죄악을 감찰하실진대 주여, 누가 서리이까
4 Kasi bolimbisi ezali epai na Yo, yango wana basengeli kotosa Yo.
그러나 사유하심이 주께 있음은 주를 경외케 하심이니이다
5 Na motema na ngai mobimba, nazali na elikya kati na Yawe, nazali penza na elikya; nazali kozela maloba na Ye.
나 곧 내 영혼이 여호와를 기다리며 내가 그 말씀을 바라는도다
6 Nazali na elikya kati na Nkolo koleka kutu ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo, koleka penza ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo.
파숫군이 아침을 기다림보다 내 영혼이 주를 더 기다리나니 참으로 파숫군의 아침을 기다림보다 더하도다
7 Isalaele, tia elikya kati na Yawe, pamba te azali bolingo, mpe kokangolama ya kokoka ezali elongo na Ye.
이스라엘아 여호와를 바랄지어다! 여호와께는 인자하심과 풍성한 구속이 있음이라
8 Ye nde akokangola Isalaele na bambeba na yango nyonso.
저가 이스라엘을 그 모든 죄악에서 구속하시리로다