< Banzembo 13 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Докле ћеш ме, Господе, сасвим заборављати? Докле ћеш одвраћати лице своје од мене?
2 Yawe, kino tango nini okobosana ngai mpo na libela? Kino tango nini okobomba elongi na Yo mpo ete namona Yo te?
Докле ћу се домишљати у души својој, мутити се у срцу свом дан и ноћ? Докле ће се непријатељ мој подизати нада мном?
3 Kino tango nini nakozala mawa-mawa kati na motema na ngai mpe nakomitungisa mikolo nyonso? Kino tango nini monguna na ngai akolonga ngai?
Погледај, услиши ме, Господе, Боже мој! Просветли очи моје да не заспим на смрт.
4 Yawe, Nzambe na ngai, tala mpe yanola ngai. Sala ete miso na ngai emona malamu; soki te, nakokufa,
Да не рече непријатељ мој: Надвладао сам га; да се не радују који ме гоне, ако посрнем.
5 bongo monguna na ngai akoloba: « Nalongi ye, » mpe bayini na ngai bakosepela soki nakweyi.
А ја се уздам у милост Твоју; радоваће се срце моје за спасење Твоје.
6 Kasi ngai, natie elikya na ngai kati na bolingo na Yo, mpe motema na ngai ezali kosepela kati na lobiko na Yo. Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, pamba te asaleli ngai bolamu.
Певаћу Господу, који ми добро чини.

< Banzembo 13 >