< Banzembo 129 >

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele. Tika ete Isalaele ezongela koloba:
שיר המעלות רבת צררוני מנעורי-- יאמר-נא ישראל
2 « Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele, kasi batikali kolonga ngai te! »
רבת צררוני מנעורי גם לא-יכלו לי
3 Bato mabe batimoli mokongo na ngai, bazokisi ngai bapota ya banzela milayi na mokongo.
על-גבי חרשו חרשים האריכו למענותם (למעניתם)
4 Kasi lokola Yawe azali sembo, akati basinga ya bato mabe.
יהוה צדיק קצץ עבות רשעים
5 Tika ete bato nyonso oyo bayinaka Siona bakufa soni mpe bazonga sima!
יבשו ויסגו אחור-- כל שנאי ציון
6 Tika ete bakoma lokola matiti oyo ebotaka na likolo ya ndako mpe ekawukaka liboso ete balongola yango;
יהיו כחציר גגות-- שקדמת שלף יבש
7 tika ete mobuki bambuma ya bilanga atondisa na yango te maboko na ye, tika ete mokangi maboke ya banzete atondisa na yango te saki na ye.
שלא מלא כפו קוצר וחצנו מעמר
8 Tika ete baleki nzela baloba na bango te: « Tika ete Yawe apambola bino! » Topamboli bino na Kombo na Yawe!
ולא אמרו העברים-- ברכת-יהוה אליכם ברכנו אתכם בשם יהוה

< Banzembo 129 >