< Banzembo 128 >
1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe alandaka banzela na Ye!
Grádicsok éneke. Mind boldog az, a ki féli az Urat; a ki az ő útaiban jár!
2 Oliaka mbuma ya mosala na Yo; ozali moto ya esengo mpe ozali na bofuluki.
Bizony, kezed munkáját eszed! Boldog vagy és jól van dolgod.
3 Kati na ndako na yo, mwasi na yo azali lokola nzete ya vino oyo ebotaka bambuma ebele; bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive zingazinga ya mesa na yo.
Feleséged, mint a termő szőlő házad belsejében; fiaid, mint az olajfacsemeték asztalod körül.
4 Ezali ndenge wana nde Yawe apambolaka moto oyo atosaka Ye.
Ímé, így áldatik meg a férfiú, a ki féli az Urat!
5 Solo, Yawe akopambola yo wuta na Siona, mpe okomona bofuluki ya Yelusalemi mikolo nyonso ya bomoi na yo
Megáld téged az Úr a Sionról, hogy boldognak lássad Jeruzsálemet életednek minden idejében;
6 mpe okomona bakitani na yo. Tika ete kimia ezala na Isalaele!
És meglássad fiaidnak fiait; békesség legyen Izráelen!