< Banzembo 126 >

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tango Yawe azongisaki bato ya Siona longwa na bowumbu, tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto.
A song for pilgrims going up to Jerusalem. When the Lord brought his people back from captivity to Zion, it was as if we were dreaming!
2 Boye, tozalaki koganga mpe koyemba na esengo. Bongo, maloba oyo ekomaki kolobama kati na bikolo: « Yawe asaleli bango makambo minene! »
We laughed so much, we sang for joy. The other nations said, “The Lord has done wonderful things for these people.”
3 Solo, Yawe asaleli biso makambo minene, mpe tozali kosepela.
The Lord certainly has done wonderful things for us. How happy we were!
4 Yawe, yaka kobongisa makambo na biso ndenge kaka otondisaka lisusu miluka ya Negevi.
Please return and help us again, Lord. Renew us like streams of water that renew the Negev desert.
5 Bato oyo balonaka na mpinzoli babukaka na banzembo ya esengo.
Those who sow in tears will reap with shouts of joy!
6 Moto oyo akendaka na kolela, tango amemi milona na ye, azongaka na esengo wana amemi maboke na ye.
Those who weep as they go out to sow their seed will be singing in celebration when they carry the harvest home.

< Banzembo 126 >