< Banzembo 125 >
1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe. Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te, oyo epikama mpo na libela.
A SONG OF THE ASCENTS. Those trusting in YHWH [are] as Mount Zion, It is not moved—it abides for all time.
2 Ndenge bangomba ezingeli Yelusalemi, ndenge wana mpe Yawe azingeli bato na Ye, kobanda sik’oyo kino libela na libela.
Jerusalem! Mountains [are] around her, And YHWH [is] around His people, From now on—even for all time.
3 Bokonzi ya mabe ekowumela te na etuka ya bato ya sembo, mpo ete basangana te na mabe.
For the rod of wickedness does not rest on the lot of the righteous, That the righteous do not put forth their hands on iniquity.
4 Yawe, zala malamu mpo na bato malamu mpe mpo na bato oyo bazali alima na mitema!
Do good, O YHWH, to the good, And to the upright in their hearts.
5 Kasi tika ete Yawe abengana bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe! Tika ete kimia ezala na Isalaele!
As for those turning [to] their crooked ways, YHWH causes them to go with workers of iniquity. Peace on Israel!