< Banzembo 124 >
1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe abatelaki biso te; tika ete Isalaele aloba bongo!
大卫上行之诗。 以色列人要说: 若不是耶和华帮助我们,
2 Soki Yawe abatelaki biso te tango bato babundisaki biso,
若不是耶和华帮助我们, 当人起来攻击我们、
3 mbele bamelaki biso ya bomoi tango basilikelaki biso makasi.
向我们发怒的时候, 就把我们活活地吞了。
4 Boye mayi elingaki kozindisa biso, mbonge makasi elingaki komema biso.
那时,波涛必漫过我们, 河水必淹没我们,
5 Mayi makasi elingaki kozindisa biso.
狂傲的水必淹没我们。
6 Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo andimaki te ete minu na bango epasola biso!
耶和华是应当称颂的! 他没有把我们当野食交给他们吞吃。
7 Tobikaki lokola ndeke liboso ya motambo ya mokangi bandeke; motambo ekatanaki, mpe tokimaki.
我们好像雀鸟,从捕鸟人的网罗里逃脱; 网罗破裂,我们逃脱了。
8 Lisungi na biso ezali kati na Kombo na Yawe oyo akela likolo mpe mabele.
我们得帮助, 是在乎倚靠造天地之耶和华的名。