< Banzembo 123 >

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai epai na Yo, Yawe, oyo ovandi na Kiti na Yo ya Bokonzi kati na Lola.
Pieśń stopni. Do ciebie oczy moje podnoszę, który mieszkasz w niebie.
2 Ndenge miso ya bawumbu etalaka nkolo na bango, mpe miso ya mwasi mosali etalaka nkolo na ye ya mwasi, ndenge wana mpe miso na biso ezali kotala Yawe, Nzambe na biso, kino asalela biso ngolu.
Oto jako oczy sług pilnują rąk panów swych, i jako oczy dziewki pilnują ręki pani swej, tak oczy nasze poglądają na Pana, Boga naszego, aż się zmiłuje nad nami.
3 Yawe, salela biso ngolu, yokela biso mawa! Pamba te tolembi kotiolama!
Zmiłuj się nad nami, Panie, zmiłuj się nad nami; bośmy bardzo nasyceni wzgardą.
4 Tolembi penza kotiolama na bato ya lolendo mpe ya lofundu!
Bardzo jest nasycona dusza nasza pośmiewiskiem bezbożnych, i wzgardą pysznych.

< Banzembo 123 >