< Banzembo 122 >

1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Nasepelaka tango balobaka na ngai: « Tokende na Tempelo ya Yawe! »
שיר המעלות לדוד שמחתי באמרים לי-- בית יהוה נלך
2 Yelusalemi, makolo na biso etelemi na bikuke na yo!
עמדות היו רגלינו-- בשעריך ירושלם
3 Yelusalemi, engumba oyo etongama malamu; engumba oyo biteni na yango ekangana esika moko.
ירושלם הבנויה-- כעיר שחברה-לה יחדו
4 Ezali kuna nde mabota ekendaka, mabota ya Yawe, kolanda mibeko kati na Isalaele, mpo na kosanzola Kombo ya Yawe.
ששם עלו שבטים שבטי-יה--עדות לישראל להדות לשם יהוה
5 Pamba te bakiti ya bokonzi ya bato oyo basalelaka bosembo ezali kuna, bakiti ya bokonzi mpo na ndako ya Davidi.
כי שמה ישבו כסאות למשפט כסאות לבית דוד
6 Bosenga kimia ya Yelusalemi! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia!
שאלו שלום ירושלם ישליו אהביך
7 Tika ete kimia ezala kati na yo mpe kati na bandako na yo ya bokonzi!
יהי-שלום בחילך שלוה בארמנותיך
8 Likolo ya bolingo na ngai mpo na bandeko mpe balingami na ngai, nalobi: « Tika ete kimia ezala kati na yo! »
למען אחי ורעי-- אדברה-נא שלום בך
9 Likolo ya bolingo na ngai mpo na Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso, nasengi bolamu mpo na yo.
למען בית-יהוה אלהינו-- אבקשה טוב לך

< Banzembo 122 >