< Banzembo 121 >

1 Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba: lisungi na ngai ekowuta wapi?
שיר למעלות אשא עיני אל-ההרים-- מאין יבא עזרי
2 Lisungi na ngai ewutaka na Yawe oyo akela likolo mpe mabele.
עזרי מעם יהוה-- עשה שמים וארץ
3 Akotika te ete lokolo na yo eselumuka; Ye oyo abatelaka yo animbaka te.
אל-יתן למוט רגלך אל-ינום שמרך
4 Te, Ye oyo abatelaka Isalaele animbaka te mpe alalaka pongi te!
הנה לא-ינום ולא יישן-- שומר ישראל
5 Yawe azali mobateli na yo; Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, lokola elili oyo ebatelaka yo.
יהוה שמרך יהוה צלך על-יד ימינך
6 Ezala na moyi to na butu, moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te!
יומם השמש לא-יככה וירח בלילה
7 Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo;
יהוה ישמרך מכל-רע ישמר את-נפשך
8 Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.
יהוה ישמר-צאתך ובואך-- מעתה ועד-עולם

< Banzembo 121 >