< Banzembo 120 >

1 Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe ayanolaki ngai. 2 Oh Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe wuta na lolemo ya lokuta! 3 Yo, lolemo ya lokuta, Yawe akopesa yo nini, akofuta yo nini? 4 Akobeta yo na makonga ya elombe ya bitumba, oyo ezali ya songe, elongo na makala ya moto ya nzete ya nzube. 5 Mawa na ngai, mpo ete navandi lokola mopaya kati na Mesheki, kati na bandako ya kapo ya Kedari. 6 Navandaki tango molayi kati na bato oyo balingaka kimia te. 7 Ngai, nazali moto ya kimia; kasi soki kaka nameki koloba na tina na kimia, bango baponaka mbala moko bitumba.

< Banzembo 120 >