< Banzembo 120 >
1 Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe ayanolaki ngai.
A Jehová llamé estando en angustia; y él me respondió.
2 Oh Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe wuta na lolemo ya lokuta!
Jehová, escapa mi alma del labio mentiroso: de la lengua engañosa.
3 Yo, lolemo ya lokuta, Yawe akopesa yo nini, akofuta yo nini?
¿Qué te dará a ti, o qué te añadirá la lengua engañosa?
4 Akobeta yo na makonga ya elombe ya bitumba, oyo ezali ya songe, elongo na makala ya moto ya nzete ya nzube.
Es como saetas de valiente agudas con brasas de enebros.
5 Mawa na ngai, mpo ete navandi lokola mopaya kati na Mesheki, kati na bandako ya kapo ya Kedari.
¡Ay de mí que peregrino en Mesec: habito con las tiendas de Cedar!
6 Navandaki tango molayi kati na bato oyo balingaka kimia te.
Mucho se detiene mi alma con los que aborrecen la paz.
7 Ngai, nazali moto ya kimia; kasi soki kaka nameki koloba na tina na kimia, bango baponaka mbala moko bitumba.
Yo soy pacífico; y cuando hablo, ellos guerrean.