< Banzembo 12 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe. Yawe, sunga biso! Pamba te bayengebene bazali lisusu te; bato ya kotiela motema bazali lisusu te kati na bana na bato.
【求免於是非】 達味詩歌,交與樂官,八度低音。 主,求你拯救,因為熱心者已缺少,忠誠的人在人間也已絕跡不見了。
2 Bato nyonso bazali kokosana bango na bango, bazali kolobana maloba ya sukali, kasi mitema na bango ezali sembo te.
人們彼此言談虛偽,嘴唇圓滑,口是心非,
3 Tika ete Yawe aboma bato nyonso oyo balobaka maloba ya sukali mpe batondi na lolendo,
願上主將一切欺詐的口唇除去。把大言不慚的舌頭剪除!
4 ba-oyo balobaka: « Tokolonga na nzela ya lolemo na biso, bibebu na biso ekolobela biso; nani akoluka kozala nkolo na biso? »
他們揚言說:「我們以口以舌取勝;有口有唇護衛我們,誰能作我們的主人?」
5 Yawe alobi: « Mpo ete bazali konyokola babola mpe kolelisa bato oyo bakelela, natelemi sik’oyo mpo na kobikisa batiolami. »
「為了貧苦者的委屈,為了窮困者的歎息,我要立刻站起──上主說:將渴望救援的人救起。
6 Maloba ya Yawe ezalaka peto lokola palata oyo balekisi na moto mpe bapetoli mbala sambo.
上主的聖言是真誠的聖言,如同純銀經過七次的鍛鍊。
7 Yo, Yawe, okobatela bato oyo bakelela, okobikisa biso mpo na libela liboso ya bato mabe.
上主,懇求你護祐我們,由這一代常拯救我們。
8 Bato mabe batambolaka na bonsomi bipai na bipai soki bato bapesi bozoba lokumu.
惡人在四周往來追蹤,實如令人生厭的毒蟲。

< Banzembo 12 >