< Banzembo 118 >

1 Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!
Give thanks to the LORD, for he is good, for his loving kindness endures forever.
2 Tika ete Isalaele aloba: « Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! »
Let Israel now say that his loving kindness endures forever.
3 Tika ete bakitani ya Aron baloba: « Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! »
Let the house of Aaron now say that his loving kindness endures forever.
4 Tika ete bato oyo batosaka Yawe baloba: « Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! »
Now let those who fear the LORD say that his loving kindness endures forever.
5 Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ngai, abikisaki ngai.
Out of my distress, I called on the LORD. The LORD answered me with freedom.
6 Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te; bato bakoki kosala ngai nini?
The LORD is my helper; I will not fear. What can humans do to me?
7 Yawe azali mpo na ngai, ayaka kosunga ngai; boye natalaka banguna na ngai na miso lokola molongi.
The LORD is my helper; and I will look in triumph on those who hate me.
8 Eleki malamu koluka ebombamelo kati na Yawe na esika ya kotia elikya na bato.
It is better to take refuge in the LORD, than to put confidence in man.
9 Eleki malamu koluka ebombamelo kati na Yawe na esika ya kotia elikya kati na bato minene ya mokili.
It is better to take refuge in the LORD, than to put confidence in princes.
10 Bikolo nyonso ezingelaki ngai, kasi nabebisaki bango na Kombo na Yawe.
All the nations surrounded me, but in the name of the LORD, I cut them off.
11 Bakobaki kaka kozingela ngai, kasi nabebisaki bango na Kombo na Yawe.
They surrounded me, yes, they surrounded me. In the name of the LORD I indeed cut them off.
12 Bazingelaki ngai lokola banzoyi, kasi ekufaki lokola moto ya esobe; nabebisaki yango na Kombo na Yawe.
They surrounded me like bees. They blazed like a fire among thorns. In the name of the LORD I cut them off.
13 Batindikaki ngai mpo ete nakweyisa kondima, kasi Yawe asungaki ngai.
I was pushed hard, to make me fall, but the LORD helped me.
14 Yawe azali makasi mpe nguya na ngai; apesaki ngai elonga.
The LORD is my strength and my song, and he has become my salvation.
15 Koganga ya esengo mpe ya elonga eyokanaka wuta na bandako ya kapo ya bato ya sembo, pamba te nguya na Yawe esalaka makambo minene!
The voice of rejoicing and salvation is in the tents of the righteous. "The right hand of the LORD does valiantly.
16 Yawe asembolaka loboko na Ye ya mobali, mpe nguya na Yawe esalaka makambo minene.
The right hand of the LORD is exalted. The right hand of the LORD does valiantly."
17 Nakokufa te, nakozala na bomoi mpe nakopanza sango ya misala ya Yawe.
I will not die, but live, and declare the works of the LORD.
18 Solo, Yawe apesaki ngai etumbu makasi; kasi akabaki ngai na kufa te.
The LORD has punished me severely, but he has not given me over to death.
19 Bofungolela ngai bikuke ya bosembo mpo ete nakota mpe nakumisa Yawe.
Open to me the gates of righteousness. I will enter into them and praise the LORD.
20 Tala ekuke ya Yawe; bato ya sembo bakotelaka na ekuke yango.
This is the gate of the LORD; the righteous will enter into it.
21 Nasanzolaka Yo, pamba te oyanolaki ngai mpe opesaki ngai elonga.
I will give thanks to you, for you have answered me, and have become my salvation.
22 Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba.
The stone which the builders rejected has become the cornerstone.
23 Ezali Yawe nde alingaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso!
This is the LORD's doing. It is marvelous in our eyes.
24 Tala mokolo oyo Yawe asali; tika ete tosepela mpe toganga na esengo mpo na mokolo yango!
This is the day that the LORD has made. We will rejoice and be glad in it.
25 Yawe, nabondeli Yo, pesa lobiko. Yawe, nabondeli Yo, pesa elonga.
Save us now, we beg you, LORD. LORD, we beg you, send prosperity now.
26 Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo! Tozali kopambola bino wuta na Tempelo ya Yawe.
Blessed is he who comes in the name of the LORD. We have blessed you out of the house of the LORD.
27 Yawe azali Nzambe, mpe angengisaki biso. Bokota na molongo, bomema mandalala na maboko mpe bokende kino na maseke ya etumbelo.
The LORD is God, and he has given us light. Bind the sacrifice with cords, even to the horns of the altar.
28 Ozali Nzambe na ngai, nasanzolaka Yo! Ozali Nzambe na ngai, nanetolaka Yo.
You are my God, and I will give thanks to you. You are my God, I will exalt you.
29 Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!
Oh give thanks to the LORD, for he is good, for his loving kindness endures forever.

< Banzembo 118 >