< Banzembo 116 >

1 Nalingaka Yawe, pamba te ayokaka mongongo mpe mabondeli na ngai.
I love that the LORD should hear my voice and my supplications.
2 Ayokaki ngai; boye nakobelela Ye bomoi na ngai mobimba.
Because He hath inclined His ear unto me, therefore will I call upon Him all my days.
3 Minyololo ya kufa ezingelaki ngai, somo ya mboka ya bakufi ekangaki ngai; nakomaki moto ya pasi mpe ya mawa. (Sheol h7585)
The cords of death compassed me, and the straits of the nether-world got hold upon me; I found trouble and sorrow. (Sheol h7585)
4 Kasi nabelelaki Kombo ya Yawe: « Yawe, nabondeli Yo, bikisa ngai! »
But I called upon the name of the LORD: 'I beseech thee, O LORD, deliver my soul.'
5 Yawe asalaka ngolu mpe azali sembo, Nzambe na biso ayokelaka bato mawa.
Gracious is the LORD, and righteous; yea, our God is compassionate.
6 Yawe abatelaka bato oyo bazangi mayele. Nalembaki nzoto, kasi abikisi ngai.
The LORD preserveth the simple; I was brought low, and He saved me.
7 Molimo na ngai, zongela kimia na yo, pamba te Yawe asaleli yo bolamu.
Return, O my soul, unto Thy rest; for the LORD hath dealt bountifully with thee.
8 Solo, okangoli ngai na kufa, okawusi mpinzoli na ngai mpe obateli makolo na ngai ete ekweya te.
For thou hast delivered my soul from death, mine eyes from tears, and my feet from stumbling.
9 Nakotambola liboso ya Yawe kati na mokili ya bato ya bomoi.
I shall walk before the LORD in the lands of the living.
10 Solo, nazalaka na elikya, ezala soki nalobaka: « Nazali moto na pasi makasi. »
I trusted even when I spoke: 'I am greatly afflicted.'
11 Kati na mitungisi na ngai, nazalaki komilobela: « Bato nyonso bazali bakosi. »
I said in my haste: 'All men are liars.'
12 Nini nakoki kozongisela Yawe mpo na bolamu na Ye nyonso epai na ngai?
How can I repay unto the LORD all His bountiful dealings toward me?
13 Nakotombola kopo ya elonga mpe nakobelela Kombo ya Yawe.
I will lift up the cup of salvation, and call upon the name of the LORD.
14 Nakokokisa bandayi na ngai epai na Yawe na miso ya bato na Ye nyonso.
My vows will I pay unto the LORD, yea, in the presence of all His people.
15 Kufa ya bayengebene ya Yawe ezali na motuya makasi na miso na Ye.
Precious in the sight of the LORD is the death of His saints.
16 Yawe, yoka ngai, nazali mosali na Yo. Nazali mosali na Yo, mwana mobali ya mwasi mosali na Yo. Ofungoli minyololo oyo ekangaki ngai.
I beseech Thee, O LORD, for I am Thy servant; I am Thy servant, the son of Thy handmaid; Thou hast loosed my bands.
17 Nakobonzela Yo mbeka mpo na kozongisa matondi, mpe nakobelela Kombo ya Yawe.
I will offer to thee the sacrifice of thanksgiving, and will call upon the name of the LORD.
18 Nakokokisa bandayi na ngai epai na Yawe na miso ya bato na Ye nyonso,
I will pay my vows unto the LORD, yea, in the presence of all His people;
19 kati na lopango ya Tempelo ya Yawe; kati na yo, Yelusalemi. Bokumisa Yawe!
In the courts of the LORD'S house, in the midst of thee, O Jerusalem. Hallelujah.

< Banzembo 116 >