< Banzembo 115 >
1 Na biso te, Yawe, na biso te, kasi pesa nkembo na Kombo na Yo mpo na bolingo mpe boyengebene na Yo.
Not unto us, O Jehovah, not unto us, but unto thy name give glory, for thy loving-kindness and for thy truth's sake.
2 Mpo na nini bikolo eloba: « Wapi Nzambe na bango? »
Wherefore should the nations say, Where then is their God?
3 Nzambe na biso azali na Lola, asalaka nyonso oyo alingi.
But our God is in the heavens: he hath done whatsoever he pleased.
4 Kasi banzambe na bango ya bikeko ezali ya palata mpe ya wolo, esalema na maboko ya bato.
Their idols are silver and gold, the work of men's hands:
5 Ezali na minoko, kasi elobaka te; ezali na miso, kasi emonaka te;
They have a mouth, and they speak not; eyes have they, and they see not;
6 ezali na matoyi, kasi eyokaka te; ezali na zolo, kasi eyokaka solo te;
They have ears, and they hear not; a nose have they, and they smell not;
7 ezali na maboko, kasi esimbaka te; ezali na makolo, kasi etambolaka te. Minoko na yango ebimisaka ata makelele te.
They have hands, and they handle not; feet have they, and they walk not; they give no sound through their throat.
8 Bato oyo basalaka yango mpe bato nyonso oyo batielaka yango motema bakokani na yango.
They that make them are like unto them, — every one that confideth in them.
9 Bana ya Isalaele, botia elikya kati na Yawe! Azali lisungi mpe nguba na bango.
O Israel, confide thou in Jehovah: he is their help and their shield.
10 Bakitani ya Aron, botia elikya kati na Yawe! Azali lisungi mpe nguba na bino.
House of Aaron, confide in Jehovah: he is their help and their shield.
11 Bino bato oyo botosaka Yawe, botia elikya kati na Yawe. Azali lisungi mpe nguba na bango.
Ye that fear Jehovah, confide in Jehovah: he is their help and their shield.
12 Yawe akanisaka biso, akopambola; solo, akopambola bana ya Isalaele, akopambola bakitani ya Aron.
Jehovah hath been mindful of us: he will bless, he will bless the house of Israel; he will bless the house of Aaron;
13 Akopambola bato oyo batosaka Yawe kobanda na bato pamba kino na bato minene.
He will bless them that fear Jehovah, both the small and the great.
14 Tika ete Yawe afulukisa bino, bino mpe bana na bino!
Jehovah will add unto you more, unto you and unto your children.
15 Tika ete Yawe apambola bino, Ye oyo asala likolo mpe mabele.
Ye are blessed of Jehovah, who made the heavens and the earth.
16 Likolo ezali likolo ya Yawe; kasi apesa mabele epai ya bato.
The heavens are the heavens of Jehovah, but the earth hath he given to the children of men.
17 Ezali te bakufi nde bakumisaka Yawe, pamba te bango nyonso bakendaka na esika ya kimia.
The dead praise not Jah, neither any that go down into silence;
18 Kasi biso, tokopambola Yawe, kobanda sik’oyo kino libela na libela. Bokumisa Yawe!
But we will bless Jah from this time forth and for evermore. Hallelujah!