< Banzembo 114 >
1 Tango Isalaele abimaki wuta na Ejipito, tango libota ya Jakobi elongwaki na ekolo ya bapaya,
Во исходе Израилеве от Египта, дому Иаковля из людий варвар,
2 Yuda ekomaki Esika ya bule ya Yawe, mpe Isalaele ekomaki mabele na Ye.
бысть Иудеа святыня Его, Израиль область Его.
3 Ebale monene emonaki yango mpe ekimaki, mayi ya Yordani ezongaki na sima,
Море виде и побеже, Иордан возвратися вспять:
4 bangomba epumbwaki lokola bameme, bangomba mike epumbwaki lokola bana ya ntaba.
горы взыграшася яко овни, и холми яко агнцы овчии.
5 Ebale monene, nini ezalaki kati na yo mpo ete okima? Yordani, mpo na nini ozongaki na sima?
Что ти есть, море, яко побегло еси, и тебе, Иордане, яко возвратился еси вспять?
6 Bino bangomba, mpo nini bopumbwaki lokola bameme? Bongo bino bangomba mike, mpo na nini bopumbwaki lokola bana ya ntaba?
Горы, яко взыграстеся яко овни, и холми яко агнцы овчии?
7 Mokili, lenga liboso ya Yawe, liboso ya Nzambe ya Jakobi,
От лица Господня подвижеся земля, от лица Бога Иаковля:
8 oyo abongolaka libanga monene liziba, mpe libanga etima.
обращшаго камень во езера водная и несекомый во источники водныя.