< Banzembo 113 >

1 Bokumisa Yawe! Bino basali ya Yawe, bokumisa Ye; bokumisa Yawe!
Aleluja! Hvalite, sluge Jahvine, hvalite ime Jahvino!
2 Tika ete Kombo ya Yawe epambolama kobanda sik’oyo kino libela na libela!
Blagoslovljeno ime Jahvino sada i dovijeka!
3 Longwa na este kino na weste, tika ete Kombo ya Yawe epambolama!
Od istoka sunca do zalaska hvaljeno bilo ime Jahvino!
4 Yawe azali na likolo ya bikolo nyonso, nkembo na Ye ezali na likolo koleka Lola.
Uzvišen je Jahve nad sve narode, slava njegova nebesa nadvisuje.
5 Nani akokani na Yawe, Nzambe na biso, oyo avandi na Kiti ya Bokonzi kati na bisika oyo eleki likolo?
Tko je kao Jahve, Bog naš, koji u visinama stoluje
6 Agumbamaka mpo na kotala likolo mpe mokili.
i gleda odozgo nebo i zemlju?
7 Wuta na putulu, atombolaka moto oyo akelela; wuta na fulu ya matiti, abimisaka mobola
Podiže iz prašine uboga, iz gliba vadi siromaha
8 mpo na kovandisa ye esika moko na bakambi, na bankumu ya bato na Ye.
da ga posadi s prvacima, s prvacima svoga naroda.
9 Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye, lokola mama ya esengo kati na bana na ye. Bokumisa Yawe!
Nerotkinji daje da u domu stanuje kao radosna majka djece brojne.

< Banzembo 113 >