< Banzembo 112 >

1 Bokumisa Yawe! Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe asepelaka makasi na mibeko na Ye.
亞肋路亞!凡敬畏上主的人,真是有福,喜歡他誡命的人,真是有福!
2 Bana na ye bakozala bato na nguya kati na mokili; ekeke ya bato ya sembo ekopambolama.
他的子孫在世上必要強盛,義人的後代必要受到讚頌。
3 Ndako na ye ezali na bokolongono mpe na bomengo, mpe bosembo na ye ewumelaka mpo na seko.
他家中必有權勢財產,他的仁義必存留永遠。
4 Pole engengaka kati na molili mpo na bato ya alima, mpo na moto oyo alimbisaka baninga, ayokelaka bato mawa mpe azali sembo.
上主富有仁愛慈悲公道,像光明在暗處向義人照耀。
5 Esengo na moto oyo ayokelaka bato mawa mpe adefisaka, mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.
樂善好施的人必蒙受祝福,祂以正義處理自己的事務。
6 Solo, aninganaka ata moke te. Bakanisaka misala ya moto ya sembo tango nyonso.
因為他永遠不會失足抖顫,義人必要受人永遠的記念。
7 Abangaka basango ya mabe te; motema na ye ezali na kimia, atiaka elikya na ye kati na Yawe.
噩耗的凶信,不會使他驚慌,因為仰賴上主心志堅強。
8 Motema na ye eninganaka te, abangaka te kino akomona banguna na ye kozwa etumbu.
直到看見他的仇敵蒙羞,他的心志堅強無懼無憂。
9 Akabelaka babola na motema ya esengo; bosembo na ye ewumelaka libela na libela, lokumu na ye ekitaka te.
他散財周濟貧苦的人。他的仁義必萬世留存,他的頭角必受光榮。
10 Moto mabe amonaka yango mpe asilikaka na zuwa, aliaka minu mpe alembaka nzoto. Posa ya bato mabe elimwaka.
罪人見到必要憤恨滿腔,咬自己的牙齒,焦灼難當,惡人的希望終必喪亡。

< Banzembo 112 >