< Banzembo 111 >

1 Bokumisa Yawe! Nakokumisa Yawe na motema na ngai mobimba kati na likita ya bato ya sembo mpe kati na mayangani.
Louez Yah! Je rendrai grâce à Yahvé de tout mon cœur, dans le conseil des hommes intègres et dans l'assemblée.
2 Yawe asalaka makambo minene; bato nyonso oyo balingaka yango bakanisaka yango.
Les œuvres de Yahvé sont grandes, réfléchis par tous ceux qui les apprécient.
3 Misala na Ye emonisaka nkembo mpe lokumu na Ye, mpe bosembo na Ye ewumelaka libela na libela.
Son œuvre est honneur et majesté. Sa justice est éternelle.
4 Alingaka ete bakanisa bikamwa na Ye. Yawe atondi na mawa mpe atalisaka ngolu na Ye.
Il a fait en sorte qu'on se souvienne de ses merveilles. Yahvé est gracieux et miséricordieux.
5 Apesaka bato oyo batosaka Ye bilei; akanisaka Boyokani na Ye tango nyonso.
Il a donné de la nourriture à ceux qui le craignent. Il se souvient toujours de son engagement.
6 Amonisaki nguya na Ye epai ya bato na Ye na nzela ya misala na Ye tango apesaki bango libula ya bato ya bikolo mosusu.
Il a montré à son peuple la puissance de ses œuvres, en leur donnant l'héritage des nations.
7 Misala na Ye nyonso elakisaka boyengebene mpe bosembo na Ye; mibeko na Ye nyonso ebongi na kondima yango.
Les œuvres de ses mains sont la vérité et la justice. Tous ses préceptes sont sûrs.
8 Epesama mpo na libela, mpe esengeli kotosa yango na bosembo mpe na bosolo.
Ils sont établis pour toujours et à jamais. Ils sont faits dans la vérité et la droiture.
9 Akangolaki bato na Ye, mpe asalaki Boyokani ya libela elongo na bango. Azali Nzambe Mosantu mpe Nzambe ya somo.
Il a envoyé la rédemption à son peuple. Il a établi son alliance pour toujours. Son nom est saint et impressionnant!
10 Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya; bato nyonso oyo batosaka Yawe bazali na mayele ya peto. Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.
La crainte de Yahvé est le commencement de la sagesse. Tous ceux qui font son travail ont une bonne compréhension. Sa louange est éternelle!

< Banzembo 111 >