< Banzembo 11 >
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Kati na Yawe, nazali koluka ebombamelo. Ndenge nini bokoka koloba na ngai: « Kimela na ngomba na bino lokola ndeke? »
In finem, Psalmus David. In Domino confido: quomodo dicitis animæ meæ: Transmigra in montem sicut passer?
2 Pamba te, tala, bato mabe babendaka batolotolo na bango, batiaka bambanzi na bango na singa mpo na kobamba yango longwa na molili bato oyo bazali na mitema sembo.
Quoniam ecce peccatores intenderunt arcum, paraverunt sagittas suas in pharetra, ut sagittent in obscuro rectos corde.
3 Soki miboko ebukani, moto ya sembo akoki kosala nini?
Quoniam quæ perfecisti, destruxerunt: iustus autem quid fecit?
4 Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule; Yawe avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Lola. Azali kotala bato nyonso; mpe miso na Ye ezali kososola mozindo ya mitema na bango.
Dominus in templo sancto suo, Dominus in cælo sedes eius: Oculi eius in pauperem respiciunt: palpebræ eius interrogant filios hominum.
5 Yawe atalaka mozindo ya moto ya sembo, kasi ayinaka makasi moto mabe elongo na moto oyo asepelaka na mobulu.
Dominus interrogat iustum et impium: qui autem diligit iniquitatem, odit animam suam.
6 Tika ete akweyisela bato mabe makala ya moto, sofolo ya moto! Mpe mopepe ya moto ekozala libula na bango.
Pluet super peccatores laqueos: ignis, et sulphur, et spiritus procellarum pars calicis eorum.
7 Pamba te Yawe azali sembo, alingaka bosembo. Bato ya sembo bakomona elongi na Ye.
Quoniam iustus Dominus et iustitias dilexit: æquitatem vidit vultus eius.