< Banzembo 11 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Kati na Yawe, nazali koluka ebombamelo. Ndenge nini bokoka koloba na ngai: « Kimela na ngomba na bino lokola ndeke? » 2 Pamba te, tala, bato mabe babendaka batolotolo na bango, batiaka bambanzi na bango na singa mpo na kobamba yango longwa na molili bato oyo bazali na mitema sembo. 3 Soki miboko ebukani, moto ya sembo akoki kosala nini? 4 Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule; Yawe avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Lola. Azali kotala bato nyonso; mpe miso na Ye ezali kososola mozindo ya mitema na bango. 5 Yawe atalaka mozindo ya moto ya sembo, kasi ayinaka makasi moto mabe elongo na moto oyo asepelaka na mobulu. 6 Tika ete akweyisela bato mabe makala ya moto, sofolo ya moto! Mpe mopepe ya moto ekozala libula na bango. 7 Pamba te Yawe azali sembo, alingaka bosembo. Bato ya sembo bakomona elongi na Ye.

< Banzembo 11 >