< Banzembo 107 >

1 Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, mpe bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!
Brengt Jahweh dank, want Hij is goed, En zijn genade duurt eeuwig!
2 Tika ete bato oyo Yawe asikolaki baloba bongo, ba-oyo akangolaki wuta na maboko ya monguna,
Zo moeten getuigen, die door Jahweh verlost zijn, En door Hem uit de nood zijn gered;
3 ba-oyo asangisaki wuta na bikolo nyonso, wuta na este, na weste, na nor mpe na sude.
Die Hij van alle kant hierheen heeft gebracht, Van oost en west, van noord en zuid.
4 Ndambo bazalaki koyengayenga na esobe, na esika oyo ezanga bato, bamonaki te nzela ya engumba epai wapi bakoki kovanda.
Sommigen doolden in woestijn en wildernis rond, Zonder de weg naar hun woonplaats te vinden;
5 Likolo ya nzala mpe ya posa ya mayi, bakomaki pene ya kokufa.
Ze leden honger en dorst, En hun leven verkwijnde.
6 Bongo kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe akangolaki bango na mitungisi na bango.
Maar ze riepen Jahweh aan in hun nood, En Hij verloste hen van hun angsten:
7 Atambolisaki bango na nzela ya alima mpo ete bakende kovanda kati na engumba.
Hij bracht ze weer op de veilige weg, Zodat ze hun woonplaats bereikten.
8 Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato!
Laat ze Jahweh voor zijn goedheid dan danken, En voor zijn wonderen voor de kinderen der mensen:
9 Apesaki mayi epai ya bato oyo bazalaki na posa ya mayi mpe bilei epai ya bato oyo bazalaki na nzala.
Want den dorstige heeft Hij gelaafd, Den hongerige heeft Hij verzadigd!
10 Bato oyo bazalaki kovanda na bisika ya molili makasi mpe ya molili ya kufa bazalaki ya kokangama na minyoko mpe na minyololo ya bibende,
Anderen zaten in duister en donker, In ellende en boeien gekluisterd;
11 pamba te batombokelaki maloba na Nzambe mpe batiolaki mabongisi ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
Want ze hadden zich tegen Gods geboden verzet, En de vermaning van den Allerhoogste veracht;
12 Abukaki lolendo ya mitema na bango na nzela ya misala makasi; bakweyaki, mpe moko te asungaki bango.
Zo was door rampspoed de moed hun ontzonken, En reddeloos stortten ze neer.
13 Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe abikisaki bango na mitungisi na bango.
Maar ze riepen Jahweh aan in hun nood, En Hij verloste hen van hun angsten:
14 Abimisaki bango wuta na molili makasi mpe na molili ya kufa, mpe abukaki minyololo na bango.
Hij haalde ze uit het duister en donker, En verbrak hun boeien.
15 Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato!
Laat ze Jahweh voor zijn goedheid dan danken, En voor zijn wonderen voor de kinderen der mensen:
16 Pamba te abukaki bikuke ya bronze mpe akataki bikangelo ya mabende.
Want metalen poorten heeft Hij verbrijzeld, Ijzeren grendels in stukken geslagen!
17 Bamosusu bakomaki bazoba mpo na etamboli mabe na bango, mpe bato na pasi, mpo na masumu na bango.
Anderen werden ziek door hun zondige wandel, Hadden smarten te lijden om hun schuld;
18 Minoko na bango eyinaki bilei nyonso, mpe bakomaki pene ya bikuke ya kufa.
Alle voedsel begon hun te walgen, En ze stonden al dicht bij de poorten des doods.
19 Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe abikisaki bango na mitungisi na bango.
Maar ze riepen Jahweh aan in hun nood, En Hij verloste hen van hun angsten.
20 Atindaki Liloba na Ye mpe abikisaki bango, akangolaki bango wuta na kunda.
Hij sprak: en ze werden genezen, En Hij ontrukte hen weer aan het graf.
21 Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato!
Laat ze Jahweh voor zijn goedheid dan danken, En voor zijn wonderen voor de kinderen der mensen:
22 Tika ete babonza bambeka ya kozongisa matondi mpe bapanza sango ya misala na Ye na koganga na esengo!
Laat ze dankoffers brengen, En jubelend zijn werken vermelden!
23 Bato oyo bakendaka mobembo na ebale monene kati na masuwa mpe basalaka mombongo na mayi minene
Anderen staken op schepen in zee, Om handel te drijven op de onmetelijke wateren.
24 bamonaki misala ya Yawe, mpe bikamwa kati na ebale monene.
Ook zij hebben Jahweh’s werken aanschouwd, In de kolken zijn wonderen.
25 Alobaki, mpe mopepe makasi eyaki, etombolaki bambonge.
Hij sprak: en er stak een stormwind op, Die zwiepte de golven omhoog;
26 Bazalaki komata kino na likolo mpe kokita kino na se, bazalaki kolemba nzoto kati na pasi.
Ze vlogen op naar de hemel, ploften neer in de diepten, En vergingen van angst;
27 Bazwaki kizunguzungu mpe bakomaki kotenga-tenga lokola bato balangwe masanga, bwanya na bango nyonso elimwaki.
Ze rolden en tuimelden, als waren ze dronken, En al hun zeemanschap was tevergeefs.
28 Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe mpe abimisaki bango na mitungisi na bango.
Maar ze riepen Jahweh aan in hun nood, En Hij verloste hen van hun angsten:
29 Akitisaki mopepe makasi, bambonge ya ebale monene evandaki kimia.
Hij bedaarde de storm tot een bries, En de golven legden zich neer;
30 Basepelaki na kimia oyo ezongaki, mpe Nzambe amemaki bango kino na libongo oyo balingaki.
Wat waren ze blij, toen het kalm was geworden, En Hij hen naar de verbeide haven geleidde!
31 Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato!
Laat ze Jahweh voor zijn goedheid dan danken, En voor zijn wonderen voor de kinderen der mensen:
32 Tika ete banetola Ye kati na lisanga ya bato mpe bakumisa Ye kati na mayangani ya bakambi.
Hem in de volksgemeente roemen, Hem in de raad der oudsten prijzen!
33 Akoki kobongola bibale esobe; kobongola bitima mabele ya kokawuka;
Rivieren maakt Hij tot steppe, Waterbronnen tot dorstige grond;
34 kobongola mabele oyo ebotaka bambuma mabele ya mungwa likolo ya mabe ya bavandi na yango.
Vruchtbaar land tot zilte bodem, Om de boosheid van zijn bewoners.
35 Akoki kobongola esobe liziba; kobongola mabele ya kokawuka bitima.
Maar van de steppe maakt Hij een vijver, Waterbronnen van het dorre land;
36 Akoki kosala ete bato na nzala bakoma kovanda kuna, batonga engumba oyo bato bakoki kovanda,
Daar zet Hij de hongerigen neer, Om er zich een woonplaats te stichten.
37 babwaka bambuma na bilanga mpe balona banzete ya vino oyo ekobota bambuma ebele.
Ze bezaaien hun akkers, beplanten hun gaarden, En oogsten hun vruchten.
38 Apamboli bango, mpe bakomi ebele; mpe akitisi te motango ya bibwele na bango.
Hij zegent hen: ze worden zeer talrijk, En Hij vermeerdert hun vee.
39 Motango ya bato mosusu ekiti mpe balembi nzoto mpo na minyoko mpe pasi.
En nemen ze af in getal, en gaan ze ten onder Door verdrukking, ellende en jammer:
40 Nzambe asambwisaka bato minene, akotisaka bango na mobulu makasi kino bazanga nzela ya kobimela na pasi.
Dan geeft Hij de tyrannen prijs aan de schande, En laat ze door de wildernis dolen.
41 Kasi akangolaka babola wuta na pasi na bango, mpe asalaka ete babotana ebele kati na bituka na bango lokola etonga ya bameme.
Maar den arme heft Hij uit de ellende weer op, En maakt zijn geslacht weer talrijk als kudden:
42 Tango bato ya sembo bamonaka bongo, basepelaka, kasi bato nyonso ya mabe bakangaka minoko na bango.
De vromen zien het, en juichen; Maar wat boos is, zwijgt stil.
43 Tika ete moto ya bwanya asala keba na makambo wana nyonso mpe akanisa na tina na bolingo ya Yawe!
Wie wijs is, neemt het ter harte, En beseft de goedheid van Jahweh!

< Banzembo 107 >