< Banzembo 106 >

1 Bokumisa Yawe! Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!
Praise the LORD! Give thanks to the LORD, for he is good, for his loving kindness endures forever.
2 Nani akoloba misala minene ya Yawe? Nani akopanza sango ya lokumu na Ye nyonso?
Who can utter the mighty acts of the LORD, or fully declare all his praise?
3 Esengo na bato oyo babatelaka mibeko mpe batambolaka na bosembo!
Blessed are those who keep justice. Blessed is one who does what is right at all times.
4 Yawe, kanisa ngai tango okotalisa ngolu na Yo epai ya bato na Yo! Salela ngai bolamu na nzela ya lobiko na Yo,
Remember me, LORD, with the favor that you show to your people. Visit me with your salvation,
5 mpo ete namona esengo ya baponami na Yo, nasepela na bolamu ya ekolo na Yo mpe nasepela elongo na libula na Yo!
that I may see the prosperity of your chosen, that I may rejoice in the gladness of your nation, that I may glory with your inheritance.
6 Solo, tosalaki masumu lokola batata na biso, tosalaki mabe mpe tomemaki ngambo.
We have sinned with our fathers. We have committed iniquity. We have done wickedly.
7 Tango batata na biso bazalaki na Ejipito, basosolaki eloko moko te kati na bikamwa na Yo; babosanaki noki misala malamu na Yo, batombokaki pembeni ya ebale monene, ebale monene ya Barozo.
Our fathers didn’t understand your wonders in Egypt. They didn’t remember the multitude of your loving kindnesses, but were rebellious at the sea, even at the Sea of Suf.
8 Kasi abikisaki bango mpo na lokumu ya Kombo na Ye, mpo na kotalisa nguya na Ye.
Nevertheless he saved them for his name’s sake, that he might make his mighty power known.
9 Agangelaki ebale monene ya Barozo, mpe ekawuki; atambolisaki bango kati na mozindo lokola na esobe.
He rebuked the Sea of Suf also, and it was dried up; so he led them through the depths, as through a desert.
10 Abikisaki bango wuta na maboko ya bayini na bango, akangolaki bango wuta na maboko ya monguna.
He saved them from the hand of him who hated them, and redeemed them from the hand of the enemy.
11 Mayi ezipaki banguna na bango, moko te atikalaki na bomoi.
The waters covered their adversaries. There was not one of them left.
12 Bato na Ye bandimelaki maloba na Ye mpe bayembaki masanzoli na Ye.
Then they believed his words. They sang his praise.
13 Kasi babosanaki noki misala na Ye, bazelaki te kokokisama ya mabongisi na Ye.
They soon forgot his works. They didn’t wait for his counsel,
14 Kati na esobe, bamipesaki na bilulela, bamekaki Nzambe kati na mabele oyo ezali na bato te.
but gave in to craving in the desert, and tested God in the wasteland.
15 Apesaki bango biloko oyo bazalaki kosenga, kasi atindelaki bango lisusu pasi.
He gave them their request, but sent leanness into their soul.
16 Kati na molako, basalaki zuwa, batelemelaki Moyize mpe Aron, mosantu ya Yawe.
They envied Moses also in the camp, and Aaron, the LORD’s holy one.
17 Mabele efungwamaki mpe emelaki Datani, ezipaki lisanga ya Abirami.
The earth opened and swallowed up Dathan, and covered the company of Abiram.
18 Moto ezikisaki lisanga na bango mpe etumbaki bato mabe wana nyonso.
A fire was kindled in their company. The flame burned up the wicked.
19 Na Orebi, basalaki mwana ngombe, bafukamelaki nzambe ya ekeko basala na ebende oyo banyangwisa na moto.
They made a calf in Horeb, and worshiped a molten image.
20 Babongolaki Nzambe na bango ya nkembo elilingi ya ngombe oyo eliaka matiti.
Thus they exchanged their glory for an image of a bull that eats grass.
21 Babosanaki Nzambe, Mobikisi na bango, oyo asalaki makambo minene kati na Ejipito,
They forgot God, their Savior, who had done great things in Egypt,
22 bikamwa kati na mokili ya Cham mpe misala ya somo na ebale monene ya Barozo.
wondrous works in the land of Ham, and awesome things by the Sea of Suf.
23 Azwaki mokano ya koboma bango nyonso. Kasi Moyize, moponami na Ye, atelemaki liboso na Ye mpo na kobondela ete akitisa kanda na Ye mpe aboma te.
Therefore he said that he would destroy them, had Moses, his chosen, not stood before him in the breach, to turn away his wrath, so that he wouldn’t destroy them.
24 Batiolaki mboka kitoko mpo ete bandimelaki maloba na Ye te.
Yes, they despised the pleasant land. They didn’t believe his word,
25 Bayimaki-yimaki kati na bandako na bango ya kapo, batosaki mongongo ya Yawe te.
but murmured in their tents, and didn’t listen to the LORD’s voice.
26 Asembolaki loboko, alapaki ndayi ya koboma bango kati na esobe,
Therefore he swore to them that he would overthrow them in the wilderness,
27 ya kopanza bakitani na bango kati na bikolo mosusu mpe ya koboma bango kati na mikili nyonso.
that he would overthrow their offspring among the nations, and scatter them in the lands.
28 Bamitiaki na se ya ekangiseli ya Bala ya Peori, baliaki bambeka oyo epesamaki epai ya banzambe oyo ekufa.
They joined themselves also to Baal Peor, and ate the sacrifices of the dead.
29 Batumbolaki kanda ya Yawe na nzela ya misala na bango ya mabe, mpe pasi makasi ekotaki kati na bongo.
Thus they provoked him to anger with their deeds. The plague broke in on them.
30 Kasi Pineasi atelemaki, akataki makambo, mpe pasi yango esilaki.
Then Phinehas stood up and executed judgment, so the plague was stopped.
31 Mpo na yango, Pineasi atangamaki lokola moto ya sembo mpo na bikeke nyonso, seko na seko.
That was credited to him for righteousness, for all generations to come.
32 Bapesaki Nzambe kanda pene ya mayi ya Meriba mpe bamemisaki Moyize ngambo.
They angered him also at the waters of Meribah, so that Moses was troubled for their sakes;
33 Mpo ete batombokelaki Molimo ya Nzambe, Moyize akomaki koloba maloba oyo esengeli te.
because they were rebellious against his spirit, he spoke rashly with his lips.
34 Babebisaki te bikolo oyo Yawe ayebisaki bango,
They didn’t destroy the peoples, as the LORD commanded them,
35 kasi basanganaki elongo na bapagano mpe bayekolaki bokoko ya bikolo na bango.
but mixed themselves with the nations, and learned their works.
36 Bagumbamelaki banzambe na bango ya bikeko oyo ekomaki motambo mpo na bango.
They served their idols, which became a snare to them.
37 Bapesaki bana na bango lokola bambeka epai ya milimo mabe.
Yes, they sacrificed their sons and their daughters to demons.
38 Basopaki makila ya bato oyo basalaki mabe te, makila ya bana na bango, oyo bapesaki lokola mbeka epai ya banzambe ya bikeko ya Kanana. Boye mboka ekomaki mbindo mpo na makila ya bato.
They shed innocent blood, even the blood of their sons and of their daughters, whom they sacrificed to the idols of Canaan. The land was polluted with blood.
39 Bamikomisaki mbindo mpe babebisaki lokumu na bango na nzela ya misala na bango.
Thus they were defiled with their works, and prostituted themselves in their deeds.
40 Yawe asilikelaki bato na Ye, ayinaki libula na Ye.
Therefore the LORD burned with anger against his people. He abhorred his inheritance.
41 Akabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya, mpe banguna na bango bakomaki kokonza bango;
He gave them into the hand of the nations. Those who hated them ruled over them.
42 banguna na bango banyokolaki bango mpe batiaki bango na se ya bokonzi na bango.
Their enemies also oppressed them. They were brought into subjection under their hand.
43 Akangolaki bango bambala ebele, kasi bazalaki kaka kosala mabongisi ya kotomboka mpe ya komipesa na bambeba na bango.
He rescued them many times, but they were rebellious in their counsel, and were brought low in their iniquity.
44 Yawe amonaki pasi na bango, tango ayokaki koganga na bango.
Nevertheless he regarded their distress, when he heard their cry.
45 Akanisaki Boyokani oyo asalaki elongo na bango; mpe mpo na bolingo monene na Ye, abongolaki mokano na Ye ya komonisa bango pasi.
He remembered for them his covenant, and repented according to the multitude of his loving kindnesses.
46 Asalaki ete bato nyonso oyo bakomisaki bango bawumbu bayokela bango mawa.
He made them also to be pitied by all those who carried them captive.
47 Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso! Sangisa biso wuta na bikolo mosusu mpo ete tosanzola Kombo na Yo ya bule mpe tosepela na mosala ya kokumisa Yo.
Save us, LORD, our God, gather us from among the nations, to give thanks to your holy name, to triumph in your praise!
48 Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko! Tika ete bato nyonso baloba: « Amen! » Bokumisa Yawe!
Blessed be the LORD, the God of Israel, from everlasting even to everlasting! Let all the people say, “Amen.” Praise the LORD!

< Banzembo 106 >