< Banzembo 105 >
1 Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye! Bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo!
Give thanks to the LORD, call upon His name; make known His deeds among the nations.
2 Boyemba mpo na lokumu na Ye, bosanzola Ye na mindule! Botatolaka tango nyonso misala minene na Ye nyonso!
Sing to Him, sing praises to Him; tell of all His wonders.
3 Bosepela na Kombo na Ye ya bule! Tika ete mitema ya bato oyo balukaka Yawe etonda na esengo!
Glory in His holy name; let the hearts of those who seek the LORD rejoice.
4 Bomipesa na Yawe. Bosenga makasi na Ye. Bolukaka tango nyonso elongi na Ye.
Seek out the LORD and His strength; seek His face always.
5 Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalaki mpe bitumbu oyo apesaki,
Remember the wonders He has done, His marvels, and the judgments He has pronounced,
6 bino, bakitani ya Abrayami, mosali na Ye; bino, baponami na Ye, bana mibali ya Jakobi!
O offspring of His servant Abraham, O sons of Jacob, His chosen ones.
7 Yawe azali Nzambe na biso, mikano na Ye ekambaka mokili mobimba.
He is the LORD our God; His judgments carry throughout the earth.
8 Akanisaka tango nyonso Boyokani na Ye, bilaka na Ye mpo na bikeke nkoto moko,
He remembers His covenant forever, the word He ordained for a thousand generations—
9 boyokani oyo asalaki elongo na Abrayami, mpe ndayi oyo alapaki epai ya Izaki.
the covenant He made with Abraham, and the oath He swore to Isaac.
10 Akokisaki bosolo na yango epai ya Jakobi lokola mobeko, epai ya Isalaele lokola boyokani ya libela na libela,
He confirmed it to Jacob as a decree, to Israel as an everlasting covenant:
11 tango alobaki: « Nakopesa yo mokili ya Kanana lokola libula oyo epesameli yo! »
“I will give you the land of Canaan as the portion of your inheritance.”
12 Na tango wana, bazalaki kaka motango moke ya bato mpe bapaya kati na yango;
When they were few in number, few indeed, and strangers in the land,
13 bazalaki koyengayenga longwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu, longwa na mokili moko kino na mokili mosusu.
they wandered from nation to nation, from one kingdom to another.
14 Atikaki moto moko te konyokola bango; apamelaki bakonzi na tina na bango:
He let no man oppress them; He rebuked kings on their behalf:
15 « Bosimba bapakolami na Ngai te, bosala mabe te epai na basakoli na Ngai! »
“Do not touch My anointed ones! Do no harm to My prophets!”
16 Abengisaki nzala makasi kati na mboka, azangisaki bango bilei.
He called down famine on the land and cut off all their supplies of food.
17 Atindaki moto moko liboso na bango: Jozefi oyo atekamaki lokola mowumbu.
He sent a man before them— Joseph, sold as a slave.
18 Bakangaki makolo na ye na minyololo mpe batiaki bibende na kingo na ye,
They bruised his feet with shackles and placed his neck in irons,
19 kino makambo oyo Jozefi asakolaki ekokisamaki, kino Liloba na Yawe etalisaki ete Jozefi alobaki solo.
until his prediction came true and the word of the LORD proved him right.
20 Mokonzi apesaki mitindo ete bafungola ye minyololo, mokambi atikaki ye na bonsomi.
The king sent and released him; the ruler of peoples set him free.
21 Akomisaki ye nkolo ya ndako na ye mpe moyangeli ya biloko na ye nyonso,
He made him master of his household, ruler over all his substance,
22 mpo ete akonza bakambi na ye mpe alakisa bwanya epai ya bapesi toli ya mokonzi.
to instruct his princes as he pleased and teach his elders wisdom.
23 Bongo Isalaele akendeki na Ejipito; mpe Jakobi avandaki lokola mopaya kati na mokili ya Cham.
Then Israel entered Egypt; Jacob dwelt in the land of Ham.
24 Yawe asalaki ete bato na Ye babota mingi, mpe akomisaki bango makasi koleka banguna na bango.
And the LORD made His people very fruitful, more numerous than their foes,
25 Abongolaki mitema ya banguna yango mpo ete bayina bato na Ye mpe banyokola bango makasi.
whose hearts He turned to hate His people, to conspire against His servants.
26 Atindaki mosali na Ye, Moyize, mpe Aron oyo aponaki.
He sent Moses His servant, and Aaron, whom He had chosen.
27 Na mitindo na Ye Nzambe, basalaki bikamwa kati na Ejipito, misala minene kati na mokili ya Cham.
They performed His miraculous signs among them, and wonders in the land of Ham.
28 Atindaki molili oyo ekotaki kati na mokili, mpe bato ya Ejipito batombokelaki maloba na Ye te.
He sent darkness, and it became dark— yet they defied His words.
29 Abongolaki mayi makila, mpe abomaki mbisi na yango.
He turned their waters to blood and caused their fish to die.
30 Mokili na bango etondaki na magorodo kino na bashambre ya mokonzi na bango.
Their land teemed with frogs, even in their royal chambers.
31 Na mitindo na Ye, banzinzi oyo eswaka mpe bangungi eyaki na mboka mobimba.
He spoke, and insects swarmed— gnats throughout their country.
32 Na esika ya mvula, atindelaki bango mvula ya mabanga mpe abetisaki kake kati na mokili na bango.
He gave them hail for rain, with lightning throughout their land.
33 Abebisaki bilanga na bango ya vino mpe ya figi, mpe abukaki banzete ya mboka na bango.
He struck their vines and fig trees and shattered the trees of their country.
34 Na mitindo na Ye, mabanki mpe makelele oyo bakokaki kotanga te esopanaki,
He spoke, and the locusts came— young locusts without number.
35 eliaki matiti nyonso ya mobesu kati na mokili na bango, eliaki bambuma ya mabele na bango.
They devoured every plant in their land and consumed the produce of their soil.
36 Abomaki bana liboso nyonso kati na mokili na bango, bambuma ya liboso ya makasi na bango.
Then He struck all the firstborn in their land, the firstfruits of all their vigor.
37 Abimisaki Isalaele, bato na Ye, elongo na palata mpe wolo; mpe moko te atiaki tembe kati na mabota na bango.
He brought Israel out with silver and gold, and none among His tribes stumbled.
38 Ejipito esepelaki komona bango kobima, pamba te somo ya Isalaele ekangaki bango.
Egypt was glad when they departed, for the dread of Israel had fallen on them.
39 Atandaki lipata mpo na kobatela bango, mpe moto mpo na kopesa pole na butu.
He spread a cloud as a covering and a fire to light up the night.
40 Ndenge kaka basengaki, atindelaki bango bakayi mpe atondisaki bango na bilei ya likolo.
They asked, and He brought quail and satisfied them with the bread of heaven.
41 Afungolaki libanga, mpe mayi ebimaki, etiolaki lokola ebale kati na esobe.
He opened a rock, and water gushed out; it flowed like a river in the desert.
42 Mpo ete akanisaki elaka ya bule oyo apesaki mosali na Ye, Abrayami,
For He remembered His holy promise to Abraham His servant.
43 abimisaki na esengo bato na Ye, baponami na Ye na koganga ya esengo.
He brought forth His people with rejoicing, His chosen with shouts of joy.
44 Apesaki bango mabele ya bikolo mosusu mpe bazwaki lokola libula mosala ya bikolo yango
He gave them the lands of the nations, that they might inherit the fruit of others’ labor,
45 mpo ete babatela mitindo na Ye mpe batosa mibeko na Ye. Bokumisa Yawe!
that they might keep His statutes and obey His laws. Hallelujah!