< Banzembo 104 >
1 Eh molimo na ngai, pambola Yawe! Yawe, Nzambe na ngai, ozali monene! Olata kongenga mpe lokumu,
Bless the LORD, O my soul. O LORD my God, Thou art very great; Thou art clothed with glory and majesty.
2 omifinika moyi lokola kazaka, otanda likolo lokola ndako ya kapo.
Who coverest Thyself with light as with a garment, who stretchest out the heavens like a curtain;
3 Opika makonzi na yango na mayi ya likolo, okomisaka mapata shar na Yo, otambolaka na mapapu ya mopepe.
Who layest the beams of Thine upper chambers in the waters, who makest the clouds Thy chariot, who walkest upon the wings of the wind;
4 Okomisaka bantoma na Yo mipepe, mpe basali na Yo, ndemo ya moto.
Who makest winds Thy messengers, the flaming fire Thy ministers.
5 Otia mokili na likolo ya miboko na yango mpo ete eningana te seko na seko.
Who didst establish the earth upon its foundations, that it should not be moved for ever and ever;
6 Ozipa yango na mayi monene lokola elamba; mayi ezalaki kovanda na likolo ya bangomba.
Thou didst cover it with the deep as with a vesture; the waters stood above the mountains.
7 Kasi na pamela na Yo, mayi ekimaki; na lokito ya kake na Yo, mayi etiolaki,
At Thy rebuke they fled, at the voice of Thy thunder they hasted away —
8 emataki na likolo ya bangomba, ekitaki na mabwaku, na bisika oyo obongisaki mpo na yango.
The mountains rose, the valleys sank down — unto the place which Thou hadst founded for them;
9 Otiaki mondelo oyo ekoki koleka te; ekozonga lisusu te kozipa mokili.
Thou didst set a bound which they should not pass over, that they might not return to cover the earth.
10 Obimisaka mayi ya bitima mpo na kosopa yango na mayi minene oyo elekaka na kati-kati ya bangomba;
Who sendest forth springs into the valleys; they run between the mountains;
11 ekomaka mayi ya komela mpo na banyama nyonso ya bilanga mpe mpo na ba-ane ya zamba.
They give drink to every beast of the field, the wild asses quench their thirst.
12 Bandeke ya likolo evandaka pembeni ya mayi yango mpe eyembaka kati na makasa.
Beside them dwell the fowl of the heaven, from among the branches they sing.
13 Wuta na bandako na Yo ya likolo, onokisaka mvula na likolo ya bangomba; mokili etondi na mbuma ya misala na Yo.
Who waterest the mountains from Thine upper chambers; the earth is full of the fruit of Thy works.
14 Matiti ebotaka mpo na bibwele, mpe milona ya bato ekolaka mpo ete mabele ebotela bango bilei,
Who causeth the grass to spring up for the cattle, and herb for the service of man; to bring forth bread out of the earth,
15 vino mpo na kosepelisa mitema na bango, mafuta mpo na kongengisa bilongi na bango, mpe mapa mpo na kolendisa mitema na bango.
And wine that maketh glad the heart of man, making the face brighter than oil, and bread that stayeth man's heart.
16 Banzete ya Yawe etondi na mayi; ndenge wana nde ezali, banzete ya sedele ya Libani, oyo Yawe alona.
The trees of the LORD have their fill, the cedars of Lebanon, which He hath planted;
17 Bandeke esalaka bazala na yango kuna, mpe nkoko evandaka na banzete ya sipele.
Wherein the birds make their nests; as for the stork, the fir-trees are her house.
18 Bangomba milayi ezali ekimelo mpo na bantaba ya zamba, mpe madusu ya mabanga ezali bibombamelo mpo na bampanya ya zamba.
The high mountains are for the wild goats; the rocks are a refuge for the conies.
19 Osala sanza mpo na koyeba mikolo ya bafeti. Moyi eyebi tango na yango ya kolala.
Who appointedst the moon for seasons; the sun knoweth his going down.
20 Otindaka molili, mpe butu ekomaka. Bongo banyama nyonso ya zamba ekomaka kotambola-tambola.
Thou makest darkness, and it is night, wherein all the beasts of the forest do creep forth.
21 Bana ya nkosi egangaka sima na nyama mpe esengaka bilei epai ya Nzambe.
The young lions roar after their prey, and seek their food from God.
22 Soki moyi ebimi, nkosi elongwaka, ezongaka mpo na kolala na bisika na yango;
The sun ariseth, they slink away, and couch in their dens.
23 kasi moto abimaka mpo na kokende na mosala na ye mpe asalaka kino na pokwa.
Man goeth forth unto his work and to his labour until the evening.
24 Oh Yawe, misala na Yo ezali ebele! Osalaki nyonso na bwanya; mokili etondi na biloko oyo okela.
How manifold are Thy works, O LORD! In wisdom hast Thou made them all; the earth is full of Thy creatures.
25 Tala ndenge ebale monene ezali molayi mpe epanzana, etonda na banyama oyo tokoki kotanga te, kobanda na oyo eleki mike kino na oyo eleki minene.
Yonder sea, great and wide, therein are creeping things innumerable, living creatures, both small and great.
26 Kuna, bamasuwa ekendeke mpe ezongaka; bongo Leviatani oyo osala mpo ete esakanaka kuna.
There go the ships; there is leviathan, whom Thou hast formed to sport therein.
27 Nyonso etalelaka Yo mpo ete opesa yango bilei na tango oyo ekoki.
All of them wait for Thee, that Thou mayest give them their food in due season.
28 Opesaka bilei, mpe ezwaka yango; ofungolelaka yango loboko na Yo, mpe etondaka na biloko.
Thou givest it unto them, they gather it; Thou openest Thy hand, they are satisfied with good.
29 Tango obombaka elongi na Yo, somo ekangaka yango; tango olongolaka yango pema, ekufaka mpe ezongaka na putulu;
Thou hidest Thy face, they vanish; Thou withdrawest their breath, they perish, and return to their dust.
30 tango otindaka pema Yo, ezwaka bomoi; mpe okomisaka mokili sika.
Thou sendest forth Thy spirit, they are created; and Thou renewest the face of the earth.
31 Tika ete nkembo ya Yawe ewumela libela na libela! Tika ete Yawe asepela na misala na Ye!
May the glory of the LORD endure for ever; let the LORD rejoice in His works!
32 Soki atali mokili, mokili elengaka; soki asimbi bangomba, ebimisaka milinga.
Who looketh on the earth, and it trembleth; He toucheth the mountains, and they smoke.
33 Nakoyembela Yawe bomoi na ngai mobimba; nakoyembela Nzambe na ngai tango nyonso nazali na bomoi.
I will sing unto the LORD as long as I live; I will sing praise to my God while I have any being.
34 Tika ete maloba na ngai esepelisa Ye! Tika ete Yawe azala esengo na ngai!
Let my musing be sweet unto Him; as for me, I will rejoice in the LORD.
35 Tika ete bato ya masumu basila na mokili, mpe bato mabe bazala lisusu te! Oh molimo na ngai, pambola Yawe! Aleluya, bokumisa Yawe!
Let sinners cease out of the earth, and let the wicked be no more. Bless the LORD, O my soul. Hallelujah.