< Banzembo 103 >

1 Nzembo ya Davidi. Eh molimo na ngai, pambola Yawe! Tika ete motema na ngai mobimba epambola Kombo na Ye ya bule!
Of David. O my soul, bless the Lord; and all that is in me, his holy name.
2 Eh molimo na ngai, pambola Yawe mpe kobosana ata moko te kati na misala malamu na Ye!
O my soul, bless the Lord; and forget not one of his benefits.
3 Ye nde alimbisaka masumu na Yo nyonso, abikisaka yo na bokono nyonso,
He pardons all your sins, he heals all your diseases.
4 akangolaka bomoi na yo wuta na libulu, alatisaka yo motole ya bolingo mpe ya mawa,
He ransoms your life from the pit, he crowns you with kindness and pity.
5 atondisaka bomoi na yo na esengo mpe akomisaka yo elenge lokola mpongo.
He gives you your heart’s desire, renewing your youth like the eagle’s.
6 Yawe asalaka mpo na bosembo, akotelaka banyokolami nyonso.
The Lord executes justice – and right for all who are wronged.
7 Amonisaki banzela na Ye epai ya Moyize, mpe bikamwa na Ye epai ya bato ya Isalaele.
He revealed his ways to Moses, his acts to the children of Israel.
8 Yawe ayokelaka bato mawa mpe asalelaka bango bolamu, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo;
Full of pity and grace is the Lord, patient, and rich in kindness:
9 azwaka biso makambo te tango nyonso, abombaka kanda na Ye te mpo na libela;
he will not always chide, nor cherish his anger forever.
10 apamelaka biso te kolanda masumu na biso, azongiselaka biso te kolanda mabe na biso.
Not after our sins has he dealt with us, nor requited us after our wickedness.
11 Ndenge likolo etombolama mosika ya mabele, ndenge wana mpe bolingo na Ye ezali monene mpo na bato oyo batosaka Ye;
For high as the heavens o’er the earth is his love over those who fear him.
12 ndenge este ezali mosika ya weste, ndenge wana mpe abwakaka masumu na biso mosika na biso.
Far as is east from the west has he put our transgressions from us.
13 Ndenge tata alingaka makasi bana na ye, ndenge wana mpe Yawe alingaka makasi bato oyo batosaka Ye;
As a father pities his children, so the Lord pities those who fear him;
14 pamba te Yawe ayebi na eloko nini asala biso, ayebi malamu ete tozali putulu.
for well he knows our frame, he remembers that we are dust.
15 Mikolo ya bomoi ya moto ezali lokola matiti, ebongaka lokola fololo ya bilanga;
A person’s days are as grass; blossoms like a flower of the meadow.
16 nzokande soki kaka mopepe ebeti yango, ezalaka lisusu te, mpe esika epai wapi ezalaki ebosani yango.
At the breath of the wind it is gone, and the place thereof knows it no more.
17 Kasi bolingo ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Ye, mpe bosembo na Ye mpo na bakitani na bango,
But the love of the Lord is eternal, and his kindness to children’s children,
18 mpo na bato oyo babatelaka boyokani na Ye mpe batosaka mibeko na Ye, ezali ya libela na libela.
to those who keep his covenant and mindfully do his behests.
19 Yawe atia Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Likolo, azali Mokonzi ya mokili mobimba.
The Lord has set his throne in the heavens; the whole world is under his sway.
20 Bopambola Yawe, bino ba-anjelu na Ye nyonso oyo bozali na nguya mpe botosaka mitindo na Ye.
Bless the Lord, you angels of his, mighty heroes performing his word.
21 Bopambola Yawe, bino mampinga na Ye nyonso oyo bokokisaka mokano na Ye.
Bless the Lord, all you his hosts, you servants who do his will.
22 Bopambola Yawe, bino bikelamu na Ye nyonso, kati na bisika nyonso ya Bokonzi na Ye. Eh molimo na ngai, pambola Yawe!
Bless the Lord, all you his works, far as his sway extends. O my soul, bless the Lord.

< Banzembo 103 >