< Banzembo 101 >
1 Nzembo ya Davidi. Nakoyemba bolingo mpe bosembo; nakoyembela nde Yo, Yawe.
(다윗의 시) 내가 인자와 공의를 찬송하겠나이다 여호와여, 내가 주께 찬양하리이다
2 Nakolanda na bokebi nzela ya bato oyo bazangi pamela. Okoya epai na ngai tango nini? Kati na ndako na ngai, nakotambola malamu na motema ezangi pamela.
내가 완전한 길에 주의하오리니 주께서 언제나 내게 임하시겠나이까 내가 완전한 마음으로 내 집안에서 행하리이다
3 Nakotala eloko moko te ya mabe; nayinaka misala ya bato oyo bazangi kondima, ekoki kokangama na ngai te.
나는 비루한 것을 내 눈 앞에서 두지 아니할 것이요 배도자들의 행위를 미워하니 이것이 내게 붙접지 아니하리이다
4 Mosika na ngai, motema ya kilikili; naboyi kosala mabe.
사특한 마음이 내게서 떠날 것이니 악한 일을 내가 알지 아니하리로다
5 Nakosala ete avanda kimia, moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokuta mpo na kobebisa lokumu ya baninga. Nakokoka te kotala moto ya lolendo mpe moto ya lofundu.
그 이웃을 그윽히 허는 자를 내가 멸할 것이요 눈이 높고 마음이 교만한 자를 내가 용납지 아니하리로다
6 Nakopona nde bato ya sembo kati na mokili mpo ete bavanda pembeni na ngai; moto na etamboli ezanga pamela nde akozala mosali na ngai.
내 눈이 이 땅의 충성된 자를 살펴 나와 함께 거하게 하리니 완전한 길에 행하는 자가 나를 수종하리로다
7 Kati na ndako na ngai, mokosi akovanda te; liboso na ngai, mokosi akotelema te.
거짓 행하는 자가 내 집안에 거하지 못하며 거짓말하는 자가 내 목전에 서지 못하리로다
8 Tongo nyonso, nakosala ete bato nyonso ya misala mabe kati na mokili bavanda kimia; nakolongola na engumba ya Yawe bato nyonso ya mabe.
아침마다 내가 이 땅의 모든 악인을 멸하리니 죄악 행하는 자는 여호와의 성에서 다 끊어지리로다