< Banzembo 10 >

1 Yawe, mpo na nini otelemi mosika? Mpo na nini obombami na tango ya pasi?
למה יהוה תעמד ברחוק תעלים לעתות בצרה
2 Na lolendo na ye, moto mabe oyo akangami na mabongisi na ye anyokolaka mobola.
בגאות רשע ידלק עני יתפשו במזמות זו חשבו
3 Pamba te moto mabe amikumisaka na tina na posa makasi ya motema na ye, apambolaka moto oyo azali na lokoso mpe afingaka Yawe.
כי-הלל רשע על-תאות נפשו ובצע ברך נאץ יהוה
4 Na lolendo na ye, moto mabe alobaka: « Nzambe azalaka te. » Kati na makanisi na ye nyonso, ezali na esika te mpo na Nzambe.
רשע--כגבה אפו בל-ידרש אין אלהים כל-מזמותיו
5 Misala na ye ekendeke liboso tango nyonso, asalaka keba te na mikano na Yo, Yawe; atiolaka banguna na ye nyonso.
יחילו דרכו בכל-עת--מרום משפטיך מנגדו כל-צורריו יפיח בהם
6 Amilobelaka: « Eloko moko te ekotikala kolengisa ngai. » Alapaka ndayi boye: « Moko te akotikala kosala ngai mabe. »
אמר בלבו בל-אמוט לדר ודר אשר לא-ברע
7 Monoko na ye etonda na bilakeli mabe, lokuta mpe mangungu; abongisaka kaka pasi mpe mabe.
אלה פיהו מלא--ומרמות ותך תחת לשונו עמל ואון
8 Abombamaka pene ya bamboka. Wuta na bisika oyo abombamaka, abomaka moto oyo asali mabe te. Miso na ye ezelaka na kobombama bato ya koboma.
ישב במארב חצרים--במסתרים יהרג נקי עיניו לחלכה יצפנו
9 Abombamaka lokola nkosi kati na evandelo na yango, abombamaka mpo na kokanga moto oyo azangi nguya; akangaka moto oyo azangi nguya na kotindika ye pembeni ya motambo.
יארב במסתר כאריה בסכה-- יארב לחטוף עני יחטף עני במשכו ברשתו
10 Agumbaka ye mpe avandisaka ye na mabele, mpe akweyaka na se ya bokonzi na ye.
ודכה (ידכה) ישח ונפל בעצומיו חלכאים (חל כאים)
11 Amilobelaka: « Nzambe akotikala koyeba te, abombaka elongi na Ye mpe akotikala komona te. »
אמר בלבו שכח אל הסתיר פניו בל-ראה לנצח
12 Oh Yawe, telema. Nzambe, sembola loboko na Yo, kanisa babola.
קומה יהוה--אל נשא ידך אל-תשכח עניים (ענוים)
13 Mpo na nini moto mabe afinga Nzambe? Mpo na nini amilobela: « Nzambe akopesa ngai etumbu te? »
על-מה נאץ רשע אלהים אמר בלבו לא תדרש
14 Pamba te, Yo Nzambe, omoni pasi ya banyokolami; otalaka pasi na bango mpe ozwaka yango kati na loboko na Yo. Banyokolami bamipesaka epai na Yo oyo osungaka bana bitike.
ראתה כי-אתה עמל וכעס תביט-- לתת בידך עליך יעזב חלכה יתום אתה היית עוזר
15 Bebisa nguya ya moto mabe, pesa moto ya misala mabe etumbu mpo na mabe na ye, mpo ete emonana lisusu te.
שבר זרוע רשע ורע תדרוש-רשעו בל-תמצא
16 Yawe azali Mokonzi mpo na seko, bapagano bakozala lisusu te kati na mokili na Ye.
יהוה מלך עולם ועד אבדו גוים מארצו
17 Yawe, oyokaka posa ya banyokolami, olendisaka bango, mpe oyokaka koganga na bango,
תאות ענוים שמעת יהוה תכין לבם תקשיב אזנך
18 mpo na kolongisa mwana etike mpe monyokolami; boye, bato ya mokili bakobangisa lisusu te.
לשפט יתום ודך בל-יוסיף עוד--לערץ אנוש מן-הארץ

< Banzembo 10 >