< Masese 1 >
1 Masese ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele:
Proverbes de Salomon, fils de David, roi d’Israël,
2 mpo na koyeba bwanya, kozwa mateya mpe kososola maloba ya mayele;
Pour connaître la sagesse et l’instruction, Pour comprendre les paroles de l’intelligence;
3 mpo na kozwa mateya ya bwanya oyo epesaka bizaleli ya sembo, ya boyengebene mpe makambo ya alima;
Pour recevoir des leçons de bon sens, De justice, d’équité et de droiture;
4 mpo na kopesa mayele epai ya bazoba, mpe boyebi epai ya bilenge.
Pour donner aux simples du discernement, Au jeune homme de la connaissance et de la réflexion.
5 Tika ete moto ya bwanya ayoka yango, mpe akobakisa bwanya na ye, bongo moto ya mayele akoyeba mayele ya kotambolisa bato;
Que le sage écoute, et il augmentera son savoir, Et celui qui est intelligent acquerra de l’habileté,
6 mpo na kososola masese mpe sambole, maloba ya bwanya mpe kolimbola makambo.
Pour saisir le sens d’un proverbe ou d’une énigme, Des paroles des sages et de leurs sentences.
7 Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele; bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.
La crainte de l’Éternel est le commencement de la science; Les insensés méprisent la sagesse et l’instruction.
8 Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo, mpe kobwaka te mateya ya mama na yo;
Écoute, mon fils, l’instruction de ton père, Et ne rejette pas l’enseignement de ta mère;
9 Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo, mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.
Car c’est une couronne de grâce pour ta tête, Et une parure pour ton cou.
10 Mwana na ngai ya mobali, soki bato ya masumu balingi kokweyisa yo, komitika te.
Mon fils, si des pécheurs veulent te séduire, Ne te laisse pas gagner.
11 Soki balobi na yo: « Yaka elongo na biso, tika ete tosala motambo mpo na koboma bato, tokosepela mpo na kokanga moto oyo ayebi likambo te!
S’ils disent: Viens avec nous! Dressons des embûches, versons du sang, Tendons des pièges à celui qui se repose en vain sur son innocence,
12 Ndenge mokili ya bakufi esalaka, tokomela ye ya bomoi, tokomela ye mobimba lokola bato oyo bakitaka na libulu ya kufa; (Sheol )
Engloutissons-les tout vifs, comme le séjour des morts, Et tout entiers, comme ceux qui descendent dans la fosse; (Sheol )
13 tokozwa biloko ya talo ya ndenge na ndenge, mpe tokotondisa bandako na biso na bomengo ya bitumba;
Nous trouverons toute sorte de biens précieux, Nous remplirons de butin nos maisons;
14 okozwa ndambo na yo epai na biso, pamba te biso nyonso tokosangisa biloko na biso esika moko; »
Tu auras ta part avec nous, Il n’y aura qu’une bourse pour nous tous!
15 mwana na ngai ya mobali, kokende elongo na bango te, longola makolo na yo na nzela na bango;
Mon fils, ne te mets pas en chemin avec eux, Détourne ton pied de leur sentier;
16 pamba te makolo na bango ekimaka mbangu mpo na kolanda mabe, mpe bapotaka mbangu mpo na kosopa makila.
Car leurs pieds courent au mal, Et ils ont hâte de répandre le sang.
17 Solo, ezali pamba kotia monyama liboso ya miso ya bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.
Mais en vain jette-t-on le filet Devant les yeux de tout ce qui a des ailes;
18 Kasi bango, batiaka mitambo mpo na kosopa makila na bango moko, bamilukelaka pasi na bomoi na bango.
Et eux, c’est contre leur propre sang qu’ils dressent des embûches, C’est à leur âme qu’ils tendent des pièges.
19 Moto oyo alukaka kozwa bomengo na nzela ya lokuta asukaka kaka bongo, mpe bomengo yango ebomaka kaka ye moko.
Ainsi arrive-t-il à tout homme avide de gain; La cupidité cause la perte de ceux qui s’y livrent.
20 Bwanya azali koganga na libanda, atomboli mongongo na ye na bisika oyo bato ebele bakutanaka;
La sagesse crie dans les rues, Elle élève sa voix dans les places:
21 azali koganga na bisika ya loyenge mpe azali koloba liboso ya ekuke ya engumba:
Elle crie à l’entrée des lieux bruyants; Aux portes, dans la ville, elle fait entendre ses paroles:
22 « Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele?
Jusqu’à quand, stupides, aimerez-vous la stupidité? Jusqu’à quand les moqueurs se plairont-ils à la moquerie, Et les insensés haïront-ils la science?
23 Soki boyoki makebisi na Ngai, nakosopela bino Molimo na Ngai mpe nakososolisa bino maloba na Ngai.
Tournez-vous pour écouter mes réprimandes! Voici, je répandrai sur vous mon esprit, Je vous ferai connaître mes paroles…
24 Kasi lokola bosundolaki Ngai tango nazalaki kobelela mpe moto moko te asalaki keba tango natandaki loboko,
Puisque j’appelle et que vous résistez, Puisque j’étends ma main et que personne n’y prend garde,
25 lokola bobwakaki toli na Ngai mpe boboyaki kondima pamela na Ngai,
Puisque vous rejetez tous mes conseils, Et que vous n’aimez pas mes réprimandes,
26 Ngai mpe nakoseka bino tango pasi ekoyela bino, nakotiola bino tango minyoko ekokomela bino,
Moi aussi, je rirai quand vous serez dans le malheur, Je me moquerai quand la terreur vous saisira,
27 tango minyoko ekokomela bino na pwasa lokola mvula ya kake makasi, tango somo ekoyela bino lokola ekumbaki, tango mawa mpe somo ekokomela bino.
Quand la terreur vous saisira comme une tempête, Et que le malheur vous enveloppera comme un tourbillon, Quand la détresse et l’angoisse fondront sur vous.
28 Bakoganga epai na Ngai, kasi nakoyanola bango te; bakoluka Ngai na ngonga ya malamu, kasi bakomona Ngai te.
Alors ils m’appelleront, et je ne répondrai pas; Ils me chercheront, et ils ne me trouveront pas.
29 Lokola bayinaki boyebi mpe baponaki te nzela ya kotosa Yawe,
Parce qu’ils ont haï la science, Et qu’ils n’ont pas choisi la crainte de l’Éternel,
30 lokola baboyaki kondima toli na Ngai mpe batiolaki pamela na Ngai,
Parce qu’ils n’ont point aimé mes conseils, Et qu’ils ont dédaigné toutes mes réprimandes,
31 bakolia mbuma ya etamboli na bango mpe bakotonda na mabongisi ya mitema na bango moko.
Ils se nourriront du fruit de leur voie, Et ils se rassasieront de leurs propres conseils,
32 Pamba te kotomboka ya bato oyo bazangi mayele ekoboma bango, mpe bozangi bokebi ya bato oyo bazangi mayele ekoboma kaka bango moko;
Car la résistance des stupides les tue, Et la sécurité des insensés les perd;
33 kasi moto oyo ayokaka Ngai akovanda na kimia mpe akobanga mabe moko te. »
Mais celui qui m’écoute reposera avec assurance, Il vivra tranquille et sans craindre aucun mal.