< Masese 9 >

1 Bwanya atongi ndako na ye, atelemisi yango na makonzi sambo;
Moudrost vystavěla dům svůj, vytesavši sloupů svých sedm.
2 abomi banyama na ye, akamoli masanga na ye ya vino mpe, na sima, atandi mesa.
Zbila dobytek svůj, smísila víno své, stůl také svůj připravila.
3 Atindi basali na ye ya basi mpo ete babelela wuta na basonge ya bangomba ya engumba:
A poslavši děvečky své, volá na vrchu nejvyšších míst v městě:
4 « Tika ete moto nyonso oyo azangi mayele aya awa! » Atindi maloba epai ya bato oyo bazangi bososoli:
Kdožkoli jest hloupý, uchyl se sem. Až i bláznivým říká:
5 « Boya kolia bilei na ngai mpe komela vino oyo nakamoli,
Poďte, jezte chléb můj, a píte víno, kteréž jsem smísila.
6 botika nzela na bino ya bozoba mpe bokozala na bomoi, botambola na nzela ya mayele. »
Opusťte hloupost a živi buďte, a choďte cestou rozumnosti.
7 Moto nyonso oyo apamelaka motioli amilukelaka kosambwa, moto nyonso oyo apamelaka moto mabe amilukelaka ngambo.
Kdo tresce posměvače, dochází hanby, a kdo přimlouvá bezbožnému, pohanění.
8 Kopamela motioli te, noki te akoyina yo; kasi pamela moto ya bwanya, mpe akolinga yo.
Nedomlouvej posměvači, aby tě nevzal v nenávist; přimlouvej moudrému, a bude tě milovati.
9 Teya moto ya bwanya, mpe akokoma lisusu na bwanya koleka; teya moto ya sembo, mpe akobakisa lisusu boyebi na ye.
Učiň to moudrému, a bude moudřejší; pouč spravedlivého, a bude umělejší.
10 Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya; koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.
Počátek moudrosti jest bázeň Hospodinova, a umění svatých rozumnost.
11 Pamba te, na nzela na ngai, mikolo ya bomoi na yo ekokoma ebele, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.
Nebo skrze mne rozmnoží se dnové tvoji, a přidánoť bude let života.
12 Soki ozali moto ya bwanya, bwanya na yo ezali mpo na litomba na yo moko; kasi soki ozali motioli, yo moko kaka nde okomona pasi.
Budeš-li moudrý, sobě moudrý budeš; pakli posměvač, sám vytrpíš.
13 Mwasi ya zoba azali mwasi ya makelele, ayokaka te mpe azanga mayele,
Žena bláznivá štěbetná, nesmyslná, a nic neumí.
14 avandaka na ekuke ya ndako na ye, atiaka kiti na ye na bisika ya likolo ya engumba,
A sedí u dveří domu svého na stolici, na místech vysokých v městě,
15 mpo na kobenga baleki nzela, bato oyo bazali kokende na nzela na bango.
Aby volala jdoucích cestou, kteříž přímo jdou stezkami svými, řkuci:
16 Tika ete moto oyo azangi mayele aya awa! Atindi maloba epai ya bato oyo bazanga bososoli:
Kdo jest hloupý, uchyl se sem. A bláznivému říká:
17 « Mayi oyo bayibi ezalaka elengi, mpe lipa oyo baliaka na kobombama ezalaka kitoko. »
Voda kradená sladší jest, a chléb pokoutní chutnější.
18 Kasi bayebi te ete epai na ye nde bakufi basanganaka, mpe ete babengami na ye bazali kati na mokili ya bakufi. (Sheol h7585)
Ale neví hlupec, že mrtví jsou tam, a v hlubokém hrobě ti, kterýchž pozvala. (Sheol h7585)

< Masese 9 >