< Masese 8 >

1 Boni, Bwanya azali kobelela te? Mayele azali koyokisa mongongo na ye te?
Hør, visdommen roper, og forstanden lar sin røst høre.
2 Atelemi na songe ya bangomba, na pembeni ya nzela, na bisika oyo banzela ekutana,
Oppe på hauger ved veien står hun, der hvor stiene møtes;
3 azali koganga pene ya bikuke, na ekotelo ya engumba:
ved siden av portene, ved byens utgang, i inngangen til portene roper hun høit:
4 « Bato, nazali koganga makasi epai na bino, nazali nde koloba na bino bato!
Til eder, I menn, roper jeg, og min røst lyder til menneskenes barn.
5 Bino bato oyo bozanga mayele, bokoma na bososoli! Bino bazoba, bokoma mayele!
Lær klokskap, I enfoldige, og lær forstand, I uforstandige!
6 Boyoka, pamba te nazali na makambo ya motuya ya koyebisa bino, nafungoli monoko na ngai mpo na koloba makambo ya sembo.
Hør! Om store ting taler jeg, og jeg oplater mine leber med rettvishet;
7 Pamba te monoko na ngai ebimisaka maloba ya solo, mpe bibebu na ngai eyinaka mabe.
min tunge taler sannhet, og ugudelighet er en vederstyggelighet for mine leber.
8 Maloba nyonso oyo ebimaka na monoko na ngai ezali sembo, ezalaka na likambo moko te ya lokuta to ya mabe;
Alle min munns ord er rette, det er intet falskt eller vrangt i dem.
9 nyonso ezali pole mpo na moto ya mayele, mpe sembo mpo na bato oyo bazali na bososoli.
De er alle sammen likefremme for den forstandige og rette for dem som har funnet kunnskap.
10 Boluka mateya na ngai kasi palata te, boyebi kasi wolo te oyo eleki peto,
Ta imot min tilrettevisning istedenfor sølv, og ta imot kunnskap fremfor utsøkt gull!
11 pamba te bwanya ezali na motuya koleka mayaka ya kitoko, bongo eloko moko te ya motuya ekokani na yango.
For visdom er bedre enn perler, og ingen skatt kan lignes med den.
12 Ngai, Bwanya, navandaka elongo na kokanisa, boye nayebi kokundola mayele mpe bososoli.
Jeg, visdommen, har klokskap i eie, og jeg forstår å finne kloke råd.
13 Kotosa Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu mpe monoko ya lokuta.
Å frykte Herren er å hate ondt; stolthet og overmot, ond ferd og en falsk munn hater jeg.
14 Toli mpe bososoli ezali ya ngai, ngai nde mayele mpe makasi.
Mig tilhører råd og sann innsikt, jeg er forstand, mig hører styrke til.
15 Ezali na nzela na ngai nde bakonzi batambolisaka mokili, mpe bakambi basalaka mibeko ya sembo;
Ved mig regjerer kongene, og ved mig fastsetter fyrstene hvad rett er.
16 ezali na nzela na ngai nde bakambi, bankumu mpe basambisi nyonso ya mokili bayangelaka.
Ved mig styrer herskerne og høvdingene, alle dommere på jorden.
17 Nalingaka bato oyo balingaka ngai, mpe bato oyo balukaka ngai bamonaka ngai.
Jeg elsker dem som elsker mig, og de som søker mig, skal finne mig.
18 Bozwi mpe lokumu, bomengo oyo ewumelaka mpe bosembo etambolaka elongo na ngai.
Hos mig er rikdom og ære, gammelt arvegods og rettferdighet.
19 Mbuma na ngai ezali kitoko koleka wolo, ezala wolo ya peto, mpe mbuma oyo nabotaka eleki palata ya kitoko.
Min frukt er bedre enn gull, ja det fineste gull, og den vinning jeg gir, er bedre enn utsøkt sølv.
20 Natambolaka na nzela ya bosembo, mpe nasalelaka banzela oyo ememaka na boyengebene,
På rettferds vei vandrer jeg, midt på rettens stier;
21 mpo na kopesa libula epai ya bato oyo balingaka ngai mpe mpo na kotondisa bibombelo na bango.
derfor gir jeg dem som elsker mig, sann rikdom til arv og fyller deres forrådskammere.
22 Yawe asalaki ngai liboso ete asala nyonso, liboso ya misala na Ye nyonso ya kala;
Herren skapte mig som sitt første verk, før sine andre gjerninger, i fordums tid.
23 aponaki ngai liboso ete mokili ezala, wuta na ebandeli penza, wuta na tango oyo biloko nyonso ya mokili ezalaki nanu te.
Fra evighet er jeg blitt til, fra først av, før jorden var.
24 Nabotamaki tango mayi ya bozindo ezalaki nanu te, tango miluka ebimisaki nanu mayi na yango te,
Da avgrunnene ennu ikke var til, blev jeg født, da der ennu ikke fantes kilder fylt med vann.
25 liboso ete bangomba ya milayi mpe bangomba ya mikuse ezala na bisika na yango,
Før fjellene blev senket ned, før haugene blev til, blev jeg født,
26 tango amisalelaki nanu te, ezala mabele to bilanga to mpe putulu ya mokili.
før han hadde skapt jord og mark og jorderikes første muldklump.
27 Nazalaki wana tango atandaki likolo na esika na yango, mpe tango akataki mondelo ya etando monene ya mayi ya bozindo,
Da han bygget himmelen, var jeg der, da han slo hvelving over avgrunnen.
28 tango atiaki mapata na likolo mpe abimisaki mayi wuta na bitima,
Da han festet skyene oventil, da han bandt avgrunnens kilder,
29 tango akatelaki ebale monene mondelo mpo ete mayi ezindisa mokili na Ye te, tango atiaki miboko ya mabele;
da han satte grense for havet, så vannene ikke går lenger enn han byder, da han la jordens grunnvoller -
30 nazalaki pembeni na Ye lokola mosungi, nazalaki kosepelisa ye tango nyonso, mpe nazalaki tango nyonso na esengo liboso na Ye;
da var jeg verksmester hos ham, og jeg var hans lyst dag efter dag, jeg lekte alltid for hans åsyn;
31 nazalaki kosepela kati na mokili na Ye mpe nazalaki na esengo kati na bato.
jeg lekte på hele hans vide jord, og min lyst hadde jeg i menneskenes barn.
32 Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai: Esengo na bato oyo babatelaka banzela na ngai!
Og nu, barn, hør på mig! Salige er de som følger mine veier.
33 Boyoka mateya na ngai mpe bokokoma bato ya bwanya, bomeka kobwaka yango te!
Hør på min tilrettevisning og bli vise og forakt den ikke!
34 Esengo na moto oyo ayokelaka ngai, oyo asenzelaka na ekuke na ngai mokolo na mokolo, mpe akengelaka na ekotelo na ngai!
Salig er det menneske som hører på mig, så han våker ved mine dører dag efter dag og vokter mine dørstolper.
35 Pamba te moto oyo amoni ngai amoni bomoi mpe azwi ngolu na miso ya Yawe.
For den som finner mig, finner livet og får nåde hos Herren.
36 Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko: moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. »
Men den som ikke finner mig, skader sig selv; alle de som hater mig, elsker døden.

< Masese 8 >