< Masese 7 >
1 Mwana na ngai, batela mibeko na ngai mpe bomba yango malamu kati na motema na yo.
Сине, чувај речи моје, и заповести моје сахрани код себе.
2 Batela mateya na ngai malamu, mpe okozala na bomoi; batela mibeko na ngai lokola mbuma ya liso na yo.
Чувај заповести моје и бићеш жив, и науку моју као зеницу очију својих.
3 Lata yango na loboko na yo lokola lopete, koma yango na etando ya motema na yo.
Привежи их себи на прсте, напиши их на плочи срца свог.
4 Loba na Bwanya: « Ozali ndeko na ngai ya mwasi, » mpe bengaka Mayele « Moninga na ngai; »
Реци мудрости: Сестра си ми; и пријатељицом зови разборитост,
5 mpo ete ekoka kobatela yo liboso ya mwasi ya ndumba mpe ekoka kokebisa yo liboso ya mwasi oyo alobaka maloba ya elengi, nzokande ezali ya lokuta.
Да би те чувала од жене туђе, од туђинке, која ласка речима.
6 Mokolo moko, nazalaki kotala wuta na madusu ya lininisa ya ndako na ngai,
Јер с прозора дома свог кроз решетку гледах,
7 namonaki kati na molongo ya bato oyo bazangi mayele, kati na bilenge mibali, elenge mobali moko oyo azangi penza mayele.
И видех међу лудима, опазих међу децом безумног младића,
8 Azalaki koleka na balabala, pene ya esika oyo mwasi wana ya ndumba avandaka, mpe akotaki na nzela oyo ekenda kino na ndako ya mwasi ya ndumba.
Који иђаше улицом покрај угла њеног, и корачаше путем ка кући њеној,
9 Ezalaki na pokwa, tango moyi elimwaki, mpe molili ya butu ekomaki koya.
У сумрак, увече, кад се уноћа и смрче;
10 Mpe tala, mwasi yango ya ndumba ayaki kokutana na elenge mobali, alataki penza lokola mwasi ya ndumba, mpe motema na ye etonda na mayele mabe;
А гле, срете га жена у оделу курвинском и лукавог срца,
11 azalaki mwasi ya makelele makasi mpe ya mobulu, makolo na ye evandaka na ndako te,
Плаха и пуста, којој ноге не могу стајати код куће,
12 atalaka-talaka na bisika nyonso, tango mosusu na libanda, tango mosusu na bisika oyo bato ebele bakutanaka.
Сад на пољу, сад на улици, код сваког угла вребаше.
13 Mwasi yango ya ndumba asimbaki elenge mobali, ayambaki ye, alaliselaki ye miso mpe alobaki na ye:
И ухвати га, и пољуби га, и безобразно рече му:
14 « Nazalaki na niongo ya mbeka ya kozongisa matondi epai na Yawe; mpe lelo, nasili kokokisa ndayi na ngai.
Имам жртве захвалне, данас изврших завете своје;
15 Yango wana, nabimaki mpo na kokutana na yo; nazalaki koluka yo, mpe, tala, namoni yo.
Зато ти изиђох на сусрет да те тражим, и нађох те.
16 Natandi mbeto na ngai na babulangeti ya langi ya ndenge na ndenge, basala na basinga ya lino oyo ewutaka na Ejipito.
Настрла сам одар свој покривачем везеним и простиркама мисирским.
17 Na mbeto na ngai, nasopi malasi ya mire, ya aloe mpe ya sinamoni.
Окадила сам постељу своју смирном, алојом и циметом.
18 Yaka tolangwa bolingo kino na tongo, tomipesa mobimba na elengi ya bolingo,
Хајде да се опијамо љубављу до зоре, да се веселимо миловањем.
19 pamba te mobali na ngai azali na ye na ndako te, akendeki mobembo na mokili ya mosika,
Јер ми муж није код куће, отишао је на пут далеки,
20 akendeki na saki ya mbongo na maboko, akozonga na ndako te kino na tango oyo sanza engengaka. »
Узео је са собом тоболац новчани, вратиће се кући у одређени дан.
21 Na nzela ya maloba na ye ya sukali, alongaki kokosa ye; na nzela ya maloba na ye ya elengi, amemaki ye.
Наврати га многим речима, глатким уснама одвуче га.
22 Elenge mobali alandaki ye mbala moko, lokola ngombe oyo bazali komema na bisika oyo babomaka banyama, lokola moto ya liboma oyo bakangi mpo na kobeta ye
Отиде за њом одмах као што во иде на клање и као безумник у путо да буде каран,
23 kino tango likonga ekotobola ye motema, lokola ndeke oyo ekeyi mbangu na motambo na kozanga koyeba ete ekeyi kokufa.
Докле му стрела не пробије јетру, као што птица лети у замку не знајући да јој је о живот.
24 Sik’oyo, mwana na ngai ya mobali, yoka ngai, pesa ngai matoyi na yo mpo na koyoka maloba ya monoko na ngai!
Зато дакле, децо, послушајте ме, и пазите на речи уста мојих.
25 Tika ete mwasi ya boye akumba te motema na yo! Kopengwa te na banzela na ye,
Немој да застрањује срце твоје не путеве њене, немој лутати по стазама њеним.
26 pamba te asili kokweyisa mpe kozokisa bato ebele, mpe asili kobomisa bingambe mibali.
Јер је многе ранила и оборила, и много је оних које је све побила.
27 Ndako na ye ezali penza nzela ya mboka ya bakufi, oyo ememaka kino na bandako ya kufa. (Sheol )
Кућа је њена пут паклени који води у клети смртне. (Sheol )