< Masese 5 >
1 Mwana na ngai, zala na bokebi na bwanya na ngai, mpe pesa litoyi na yo na mayele na ngai,
Mon fils, sois attentif à ma sagesse, incline ton oreille à mon intelligence;
2 mpo ete ozala na bososoli, mpe bibebu na yo ebomba boyebi.
Afin que tu gardes mes avis, et que tes lèvres conservent la science.
3 Pamba te bibebu ya mwasi ya ndumba ebimisaka mafuta ya nzoyi, mpe lolemo na ye ezali elengi lokola mafuta;
Car les lèvres de l'étrangère distillent des rayons de miel, et son palais est plus doux que l'huile.
4 kasi na suka na nyonso, azali bololo lokola masanga ya bololo, songe lokola mopanga ya minu mibale.
Mais ce qui en provient est amer comme de l'absinthe, et aigu comme une épée à deux tranchants.
5 Makolo na ye ekokita kino na kufa, ekokende kino na mokili ya bakufi. (Sheol )
Ses pieds descendent à la mort, ses démarches aboutissent au sépulcre. (Sheol )
6 Amitungisaka te mpo na nzela ya bomoi, alandaka nzela oyo ayebi te esika nini ekosuka.
Afin que tu ne balances point le chemin de la vie; ses chemins en sont écartés, tu ne le connaîtras point.
7 Sik’oyo mwana na ngai, yoka ngai, kopesa maloba na ngai mokongo te;
Maintenant donc, enfants, écoutez-moi, et ne vous détournez point des paroles de ma bouche.
8 longola nzela na yo pembeni na ye mpe kopusana te liboso ya ndako na ye,
Eloigne ton chemin de la femme étrangère, et n'approche point de l'entrée de sa maison.
9 noki te akoya kokaba lokumu na yo epai ya bato mosusu, mpe mibu na yo epai ya moto mabe;
De peur que tu ne donnes ton honneur à d'autres, et tes ans au cruel.
10 noki te bapaya bakotonda na biloko oyo yo omoneli pasi, mpe mbuma ya mosala na yo ekokende na ndako ya mopaya;
De peur que les étrangers ne se rassasient de tes facultés, et que le fruit de ton travail ne soit en la maison du forain;
11 noki te okokoma kolelalela na suka tango nzoto na yo ekolemba mpe makasi na yo ekosila,
Et que tu ne rugisses quand tu seras près de ta fin, quand ta chair et ton corps seront consumés;
12 mpe oloba: « Mpo na nini nayinaki mateya, mpe motema na ngai eboyaki koyoka toli?
Et que tu ne dises: Comment ai-je haï l'instruction, et comment mon cœur a-t-il dédaigné les répréhensions?
13 Mpo na nini nayokaki te mongongo ya balakisi na ngai mpe napesaki litoyi te epai ya bato oyo bazalaki koteya ngai?
Et comment n'ai-je point obéi à la voix de ceux qui m'instruisaient, et n'ai-je point incliné mon oreille à ceux qui m'enseignaient?
14 Etikalaki kaka moke ete nakweya na mabe ya mozindo, kati na Lingomba ya bato ya Nzambe. »
Peu s'en est fallu que je n'aie été dans toute sorte de mal, au milieu de la congrégation et de l'assemblée.
15 Melaka mayi ya libulu na yo moko, oyo ezali kobima penza na libulu na yo.
Bois des eaux de ta citerne, et des ruisseaux du milieu de ton puits;
16 Boni, bitima na yo esopa penza mayi na libanda to miluka na yo esopa penza mayi na balabala?
Que tes fontaines se répandent dehors, et les ruisseaux d'eau par les rues;
17 Tika ete ezala kaka mpo na yo moko, kasi kokabola yango te na bapaya.
Qu'elles soient à toi seul, et non aux étrangers avec toi.
18 Tika ete etima na yo epambolama, mpe sepela na mwasi ya bolenge na yo,
Que ta source soit bénie, et réjouis-toi de la femme de ta jeunesse,
19 oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi, lokola mboloko ya mafuta. Tika ete tango nyonso, mabele na ye etondisaka yo na esengo, mpe bolingo na ye elangwisaka yo!
[Comme] d'une biche aimable, et d'une chevrette gracieuse; que ses mamelles te rassasient en tout temps, et sois continuellement épris de son amour;
20 Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini kokufela kolinga mwasi ya ndumba? Mpo na nini kosepela kosakana na mabele ya mwasi mosusu?
Et pourquoi, mon fils, irais-tu errant après l'étrangère, et embrasserais-tu le sein de la foraine?
21 Solo, nzela ya moto ezali liboso ya Yawe, mpe ayekolaka malamu makambo nyonso oyo moto asalaka.
Vu que les voies de l'homme sont devant les yeux de l'Eternel, et qu'il pèse toutes ses voies.
22 Moto mabe akokangama kaka na motambo ya mabe na ye moko mpe na singa ya lisumu na ye,
Les iniquités du méchant l'attraperont, et il sera retenu par les cordes de son péché.
23 akokufa likolo ya bozoba, mpe liboma na ye ekobungisa ye nzela.
Il mourra faute d'instruction, et il ira errant par la grandeur de sa folie.