< Masese 4 >

1 Bana na ngai, boyokaka mateya ya tata, bozalaka na bokebi mpo ete bozwa mayele.
שמעו בנים מוסר אב והקשיבו לדעת בינה
2 Pamba te nazali kopesa bino mateya ya malamu; bobwaka mateya na ngai te.
כי לקח טוב נתתי לכם תורתי אל-תעזבו
3 Ngai mpe nazalaki mwana malamu na miso ya tata na ngai, boye mama na ngai alingaki ngai makasi lokola mwana oyo abotama kaka ye moko.
כי-בן הייתי לאבי רך ויחיד לפני אמי
4 Tata na ngai azalaki koteya mpe koloba na ngai boye: « Tika ete motema na yo ebatela maloba na ngai, bomba mibeko na ngai mpe okozala na bomoi,
וירני--ויאמר לי יתמך-דברי לבך שמר מצותי וחיה
5 zwa bwanya, zwa mayele, kobosana yango te, kopesa mokongo te na maloba ya monoko na ngai,
קנה חכמה קנה בינה אל-תשכח ואל-תט מאמרי-פי
6 kosundola bwanya te, mpe yango ekobatela yo, linga yango mpe ekobomba yo.
אל-תעזבה ותשמרך אהבה ותצרך
7 Tala ebandeli ya bwanya: Zwa bwanya, pesa biloko nyonso oyo ozali na yango mpo ete ozwa mayele.
ראשית חכמה קנה חכמה ובכל-קנינך קנה בינה
8 Simba yango makasi, mpe ekotombola yo; yamba yango, mpe ekopesa yo lokumu.
סלסלה ותרוממך תכבדך כי תחבקנה
9 Ekolatisa yo ekoti ya lokumu na moto, ekopesa yo motole ya nkembo. »
תתן לראשך לוית-חן עטרת תפארת תמגנך
10 Mwana na ngai, yoka mpe yamba maloba na ngai, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.
שמע בני וקח אמרי וירבו לך שנות חיים
11 Nazali kolakisa yo nzela ya bwanya, nazali kotambolisa yo na nzela ya alima.
בדרך חכמה הריתיך הדרכתיך במעגלי-ישר
12 Mpo ete makolo na yo ezala na mikakatano te tango okotambola; mpe soki okimi mbangu, okokweya te.
בלכתך לא-יצר צעדך ואם-תרוץ לא תכשל
13 Tingama makasi na mateya oyo bapesi yo, kobwaka yango te, batela yango malamu mpo ete ezali bomoi na yo.
החזק במוסר אל-תרף נצרה כי-היא חייך
14 Kokotaka te na nzela ya bato ya mobulu mpe kotambolaka te na nzela ya bato mabe.
בארח רשעים אל-תבא ואל-תאשר בדרך רעים
15 Longwa kati na bango, kolekela wana te, kosala mpe maseki kuna te, kasi kende na yo na nzela mosusu.
פרעהו אל-תעבר-בו שטה מעליו ועבר
16 Pamba te balalaka pongi te soki basali nanu moto mabe te, mpe pongi ekimaka bango soki babomi moto te;
כי לא ישנו אם-לא ירעו ונגזלה שנתם אם-לא יכשולו (יכשילו)
17 baliaka lipa na nzela ya mabe mpe bamelaka vino na nzela ya mobulu.
כי לחמו לחם רשע ויין חמסים ישתו
18 Nzokande, nzela ya bato ya sembo ezali lokola pole ya tongo makasi, oyo kongenga na yango eyaka malembe-malembe kino tango moyi ekobima makasi.
וארח צדיקים כאור נגה הולך ואור עד-נכון היום
19 Nzela ya bato ya mobulu ezali lokola molili, bayebaka te eloko nini ekokweyisa bango.
דרך רשעים כאפלה לא ידעו במה יכשלו
20 Mwana na ngai, zala na bokebi na maloba na ngai, pesa litoyi na yo na mateya na ngai.
בני לדברי הקשיבה לאמרי הט-אזנך
21 Tika ete ezala te mosika ya miso na yo! Batela yango malamu kati na motema na yo,
אל-יליזו מעיניך שמרם בתוך לבבך
22 pamba te ezali bomoi mpo na bato oyo bazwaka yango, mpe epesaka nzoto kolongono.
כי-חיים הם למצאיהם ולכל-בשרו מרפא
23 Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso, pamba te makambo nyonso oyo tosalaka, wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.
מכל-משמר נצר לבך כי-ממנו תוצאות חיים
24 Longola lokuta na monoko na yo, mpe longola mabe na bibebu na yo.
הסר ממך עקשות פה ולזות שפתים הרחק ממך
25 Tika ete miso na yo etalaka kaka liboso, mpe salaka makambo na bosembo mpe bosolo.
עיניך לנכח יביטו ועפעפיך יישרו נגדך
26 Bongisa nzela oyo makolo na yo ekolekela, mpe tambola kaka na nzela oyo oyebi malamu.
פלס מעגל רגלך וכל-דרכיך יכנו
27 Kotengama te, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi, longola makolo na yo na mabe.
אל-תט-ימין ושמאול הסר רגלך מרע

< Masese 4 >