< Masese 31 >
1 Maloba ya mokonzi Lemweli, mateya oyo mama na ye ateyaki ye:
The words of king Lamuel. The vision wherewith his mother instructed him.
2 Eh mwana na ngai ya mobali, mwana oyo abimi na libumu na ngai, mwana mobali oyo nalapelaka ndayi:
What, O my beloved, what, O the beloved of my womb, what, O the beloved of my vows?
3 Kosilisa makasi na yo na basi te, komitika te na basi oyo bapengwisaka bakonzi!
Give not thy substance to women, and thy riches to destroy kings.
4 Eh Lemweli, ebongi te mpo na bakonzi; te, ebongi te mpo na bato minene kotuna: « Wapi masanga ya makasi? »
Give not to kings, O Lamuel, give not wine to kings: because there is no secret where drunkenness reigneth:
5 Noki te soki bameli yango, bakobosana mibeko mpe bakokata na bosembo te makambo ya banyokolami.
And lest they drink and forget judgments, and pervert the cause of the children of the poor.
6 Pesa masanga ya makasi epai ya bato oyo balingi kokufa, mpe vino epai ya bato oyo bazali kotungisama na motema.
Give strong drink to them that are sad: and wine to them that are grieved in mind:
7 Tika bango bamela mpo ete babosana pasi na bango mpe batika kokanisa lisusu minyoko na bango.
Let them drink, and forget their want, and remember their sorrow no more.
8 Fungola monoko na yo mpo na kolobela bato oyo bazali na makoki ya koloba te, mpe mpo na kolongisa bato oyo bazanga basungi.
Open thy mouth for the dumb, and for the causes of all the children that pass.
9 Fungola monoko na yo mpe sambisa na bosembo, bundela babola mpe bato oyo bakelela.
Open thy mouth, decree that which is just, and do justice to the needy and poor.
10 Nani akoki komona mwasi ya lokumu? Azali na motuya koleka babiju ya talo.
Who shall find a valiant woman? far and from the uttermost coasts is the price of her.
11 Mobali na ye atielaka ye motema mpe azangaka te biloko ya motuya.
The heart of her husband trusteth in her, and he shall have no need of spoils.
12 Tango nyonso ya bomoi na ye, apesaka mobali na ye esengo, kasi mawa te;
She will render him good, and not evil, all the days of her life.
13 alukaka bapwale ya meme mpe basinga ya lino, bongo maboko na ye etongaka yango na esengo.
She hath sought wool and flax, and hath wrought by the counsel of her hands.
14 Azali lokola masuwa ya bato ya mombongo, akendaka koluka bilei na ye mosika;
She is like the merchant’s ship, she bringeth her bread from afar.
15 alamukaka wana butu ezali nanu, abongisaka bilei mpo na ndako na ye mpe akabolelaka basali na ye ya basi misala.
And she hath risen in the night, and given a prey to her household, and victuals to her maidens.
16 Soki asepeli na elanga, asombaka yango; mpe na mbuma ya misala na ye, alonaka elanga ya vino.
She hath considered a field, and bought it: with the fruit of her hands she hath planted a vineyard.
17 Akangaka loketo na ye makasi mpe akembisaka maboko na ye na mosala.
She hath girded her loins with strength, and hath strengthened her arm.
18 Amonaka ete mombongo na ye etambolaka malamu; mpe kino na butu, mwinda na ye ekokufa te.
She hath tasted and seen that her traffic is good: her lamp shall not be put out in the night.
19 Maboko na ye esimbaka mitonga oyo batongelaka, mpe misapi na ye etongaka bilamba.
She hath put out her hand to strong things, and her fingers have taken hold of the spindle.
20 Afungolaka loboko na ye mpo na kokabela babola, mpe asembolaka yango mpo na kosunga bato bakelela.
She hath opened her hand to the needy, and stretched out her hands to the poor.
21 Tango mvula ya pembe ekitaka, abangaka eloko moko te mpo na ndako na ye, pamba te bato nyonso kati na ndako na ye balataka bilamba ya malili.
She shall not fear for her house in the cold of snow: for all her domestics are clothed with double garments.
22 Asalaka babulangeti mpo na mbeto na ye mpe alataka bilamba na ye ya lino ya kitoko mpe ya motane.
She hath made for herself clothing of tapestry: fine linen, and purple is her covering.
23 Bapesaka mobali na ye lokumu, na ekuke ya engumba, tango avandaka elongo na bakambi ya mokili.
Her husband is honourable in the gates, when he sitteth among the senators of the land.
24 Asalaka bilamba ya lino mpe atekaka yango, asalaka mombongo ya mikaba.
She made fine linen, and sold it, and delivered a girdle to the Chanaanite.
25 Alataka lokola elamba: molende na mosala mpe lokumu; mikolo ya lobi ebangisaka ye te, asekaka nde yango.
Strength and beauty are her clothing, and she shall laugh in the latter day.
26 Alobaka na bwanya, mpe lolemo na ye epesaka malakisi na bolingo.
She hath opened her mouth to wisdom, and the law of clemency is on her tongue.
27 Azalaka na bokebi na makambo nyonso oyo elekaka na ndako na ye, mpe aliaka lipa na bogoyigoyi te.
She hath looked well to the paths of her house, and hath not eaten her bread idle.
28 Bana na ye bakotelema mpo na kokumisa ye, mpe tala ndenge mobali na ye mpe akumisaka ye:
Her children rose up, and called her blessed: her husband, and he praised her.
29 « Basi ebele basalaka makambo ya lokumu; kasi yo, oleki bango nyonso! »
Many daughters have gathered together riches: thou hast surpassed them all.
30 Bonzenga ya elongi ekosaka, mpe kitoko ya nzoto ezalaka pamba; kasi mwasi oyo atosaka Yawe, ye nde abongi na lokumu.
Favour is deceitful, and beauty is vain: the woman that feareth the Lord, she shall be praised.
31 Bopesa ye bambuma ya misala na ye! Tika ete bapesa ye lokumu, na bikuke ya engumba, mpo na misala nyonso oyo asalaka!
Give her of the fruit of her hands: and let her works praise her in the gates.