< Masese 29 >

1 Moto oyo atiaka moto makasi soki bapameli ye, akokweyisama na pwasa mpe akobika te.
A man often reproved, hardening the neck, Is suddenly broken, and there is no healing.
2 Soki bato ya sembo bakomi ebele, bato basepelaka; kasi soki bato mabe bakomi koyangela, bato balelaka.
In the multiplying of the righteous the people rejoice, And in the ruling of the wicked the people sigh.
3 Moto oyo alingaka bwanya asalaka esengo ya tata na ye, kasi moto oyo alandaka basi ya ndumba akosilisa bomengo na ye nyonso.
A man loving wisdom makes his father glad, And a friend of harlots destroys wealth.
4 Mokonzi oyo akambaka na bosembo ayeisaka kimia na mokili na ye, kasi mokonzi oyo afutisaka mpako ebele abebisaka mokili yango.
A king establishes a land by judgment, And one receiving gifts throws it down.
5 Moto oyo alobaka na moninga na ye maloba ya sukali atielaka ye motambo na se ya matambe.
A man taking a portion above his neighbor, Spreads a net for his own steps.
6 Lisumu ya moto mabe ezalaka na motambo, kasi moto ya sembo agangaka na esengo mpe asepelaka.
A snare [is] in the transgression of the evil, And the righteous sing and rejoice.
7 Moto ya sembo ayebaka pasi ya babola, kasi moto mabe ayebaka na ye kutu yango te.
The righteous knows the plea of the poor, The wicked does not understand knowledge.
8 Batioli batiaka mobulu kati na engumba, kasi bato ya bwanya basilisaka kanda.
Men of scorning ensnare a city, And the wise turn back anger.
9 Soki moto ya bwanya akei kosamba elongo na moto ya liboma, ezala asiliki to aseki, akotikala kozala na kimia te.
A wise man is judged by the foolish man, And he has been angry, And he has laughed, and there is no rest.
10 Bato oyo basopaka makila balingaka bato ya sembo te, kasi bato malamu balukaka bato ya sembo.
Men of blood hate the perfect, And the upright seek his soul.
11 Zoba alandaka baposa nyonso ya motema na ye, kasi moto ya bwanya akangaka yango mpe akitisaka yango.
A fool brings out all his mind, And the wise restrains it until afterward.
12 Soki mokonzi akomi koyoka makambo ya lokuta, basali na ye nyonso bakokoma bato mabe.
A ruler who is attending to lying words, All his ministers [are] wicked.
13 Mobola mpe monyokoli bazali na likambo moko ya lisanga: Yawe angengisaka miso ya bango mibale.
The poor and the man of frauds have met together, YHWH is enlightening the eyes of them both.
14 Mokonzi oyo asambisaka babola na bosembo, kiti na ye ya bokonzi ekolendisama tango nyonso.
A king that is judging the poor with truth, His throne is established forever.
15 Fimbu mpe pamela epesaka bwanya, kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.
A rod and reproof give wisdom, And a youth let away is shaming his mother.
16 Soki bato mabe bakomi ebele, mabe mpe ekomaka ebele; kasi bato ya sembo bakomona bango kokweya.
In the multiplying of the wicked transgression multiplies, And the righteous look on their fall.
17 Pesa mwana na yo etumbu, bongo okozala na kimia mpe akotondisa motema na yo na esengo.
Discipline your son, and he gives you comfort, Indeed, he gives delights to your soul.
18 Soki emoniseli ezali te, bato bakotambola ngulungulu. Esengo na moto oyo atosaka Mobeko!
A people is made naked without a vision, And whoever is keeping the Law, O his blessedness!
19 Bapamelaka mosali na maloba te; pamba te akososola, kasi akoyoka te.
By words a servant is not instructed though he understand, And there is nothing answering.
20 Soki omoni moto kowela koloba liboso ete akanisa, malamu kotia elikya na zoba, kasi na ye te.
You have seen a man hasty in his words! More hope of a fool than of him.
21 Moto oyo alengelaka mosali na ye wuta bolenge akosuka na kokomisa ye moto makasi.
Whoever is bringing up his servant delicately, from youth, [At] his latter end he is also continuator.
22 Moto ya kanda amemaka koswana, mpe moto oyo atombokaka noki akomaka na mabe koleka.
An angry man stirs up contention, And a furious man is multiplying transgression.
23 Lolendo ya moto ekitisaka ye, kasi moto ya komikitisa azwaka lokumu.
The pride of man humbles him, And humility of spirit upholds honor.
24 Moto oyo akabolaka biloko elongo na moyibi amiyinaka; ayokaka bilakeli mabe, kasi amekaka te kofunda ye.
Whoever is sharing with a thief is hating his own soul, He hears execration, and does not tell.
25 Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe, kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.
Fear of man causes a snare, And the confident in YHWH is set on high.
26 Bato ebele balukaka kokoma balingami ya mokonzi, nzokande ezali Yawe nde apesaka oyo ekoki na moto na moto.
Many are seeking the face of a ruler, And the judgment of each [is] from YHWH.
27 Bato ya sembo bayinaka moto ya masumu, mpe moto mabe ayinaka etamboli ya bato ya sembo.
The perverse man [is] an abomination to the righteous, And the upright in the way [is] an abomination to the wicked!

< Masese 29 >