< Masese 25 >

1 Tala masese mosusu ya Salomo oyo bato ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, bakomaki.
以下也是撒羅滿的箴言,由猶大王希則克雅的人所蒐集:
2 Nzambe azwaka nkembo mpo ete asalaka makambo oyo bato bayebaka te, mpe bakonzi bazwaka nkembo mpo ete balukaka kososola tina ya makambo.
將事隱蔽,是天主的光榮;清察事實,是君王的光榮。
3 Ndenge bakokaka te komeka bosanda ya Lola to bozindo ya mabele, ndenge wana mpe bakoki te kososola mitema ya bakonzi.
天有多高,地有多厚,王有何心,不可測量。
4 Soki olongoli mbindo na palata, ekobimisa mbeki mpo na monyangwisi bibende na moto.
若將銀渣除去淨盡,銀匠必會造出銀器;
5 Soki olongoli moto mabe liboso ya mokonzi, kiti na ye ya bokonzi ekolendisama na bosembo.
若將君王前的惡人除掉,王座即可因正義而穩立。
6 Komikumisaka te liboso ya mokonzi, mpe komivandisaka te na esika ya bato minene;
你在君王前不可炫耀,不可佔有權貴的座位;
7 pamba te eleki malamu ete baloba na yo: « Yaka kovanda na esika oyo ya lokumu, » na esika ete bayokisa yo soni na miso ya mokonzi.
因為人對你說「請上座! 」比在貴前受抑更好。
8 Kowelaka te kokende kofunda epai ya basambisi makambo oyo osili komona na miso, pamba te okosala nini na suka soki moninga na yo asukisi yo?
你眼若有所見,不可冒然訴訟;人若使你難堪,你將何以善後﹖
9 Soki ozali kowelana na moninga na yo, kobimisa sekele ya moto mosusu te,
與你的近人,可自決爭端;他人的秘密,切不可洩漏;
10 noki te ayoka yango mpe ayokisa yo soni, boye okosambwa mpo na libela.
免得人聽見了而譏笑你,使你的聲譽一敗塗地。
11 Liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezali lokola wolo oyo basangisi na palata.
一句簡單話,若說得適當,有如銀盤中,放上金蘋果。
12 Pamela ya moto ya bwanya epai ya moto oyo ayokaka ezali lokola wolo ya peto mpe sheneti ya wolo.
明智的勸戒,對受教的人,無異於金環,或純金美飾。
13 Motindami ya sembo azalaka lokola mopepe ya malili ya mvula ya pembe na tango ya kobuka bambuma, asalaka esengo ya mokonzi na ye.
忠誠的使者,對遣他的人,有如秋收時,吹來的涼風,使他主人的心感到愉快。
14 Moto oyo amikumisaka ete akabaka, nzokande apesaka na ye eloko te, azali lokola mapata mpe mopepe oyo ezangi mvula.
許諾而不實踐的人,只好似無雨的風雲。
15 Moto oyo akangaka motema akoki kobongola makanisi ya mokonzi, mpe maloba ya malamu ebukaka mikuwa.
容忍可以折服公侯,柔語能以粉碎硬骨。
16 Soki omoni mafuta ya nzoyi, lia oyo ekoki na yo, pamba te soki olie yango na lokoso, okosanza yango.
你找到蜂蜜,應按食量吃;怕吃的過多,反要吐出來。
17 Kokendaka pamba-pamba te na ndako ya moninga na yo, noki te akotonda yo mpe akolemba yo.
鄰舍的住家,你應少踏入;怕他討厭你,反而憎恨你。
18 Moto oyo apesaka matatoli ya lokuta mpo na kosala moninga na ye mabe azali lokola marto, mopanga mpe mbanzi ya songe.
作假見證陷害鄰舍的人,無異是鐵鎚、刀劍和利箭。
19 Kotia elikya na zoba na tango na pasi ezali lokola lino ebukani mpe lokolo elembi.
在患難之日,信賴無信用的人,有如信賴蛀壞的牙,脫節的腳。
20 Koyembela moto oyo azali na mawa banzembo ya esengo ezali lokola kolongola ye kazaka na tango ya malili to kotia masanga ya ngayi na pota.
對憂傷的心靈詠唱詩歌,無異在傷口處倒上酸醋。
21 Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei; soki azali na posa ya mayi, pesa ye mayi ya komela.
若仇人餓了,你要給他吃;若是他渴了,應給他水喝:
22 Pamba te, soki osali bongo, okotondisa makala ya moto na likolo ya moto na ye, mpe Yawe akofuta yo.
這是將火炭堆在他頭上,上主也必要因此還報你。
23 Mopepe oyo ewutaka na ngambo ya nor, ebetisaka mvula, mpe lolemo oyo etongaka ekomisaka bilongi kanda-kanda.
北風帶來時雨;讒言易惹怒容。
24 Kovanda na songe ya ndako ezali malamu koleka kovanda elongo na mwasi oyo aswanaka-swanaka.
寧願住在屋頂的一角,不願與吵婦同居一室。
25 Basango ya malamu oyo ewuti na mokili ya mosika ezali lokola mayi ya pio kati na motema ya moto oyo azali na posa ya mayi.
來自遠方的喜信,無異口渴獲清泉。
26 Moto ya sembo oyo asopanaka liboso ya moto mabe azali lokola liziba ya potopoto mpe etima oyo ebimisaka mayi ya mabe.
義人如在惡人面前失足,無異弄混的水泉,弄濁的水井。
27 Ezali malamu te kolia mafuta ya nzoyi ebele, mpe ezali malamu te koluka lokumu na yo moko.
吃蜂蜜過多,有損無益;過於求光榮,反而受累。
28 Moto oyo akokaka te kokonza molimo na ye azali lokola engumba oyo ebukana mpe ezanga bamir.
人若不控制自己的脾氣,就如一座無牆無防的城市。

< Masese 25 >