< Masese 24 >

1 Kolulaka te bato oyo basalaka mabe mpe kolukaka te kozala elongo na bango,
No tengas envidia de los hombres malos, ni el deseo de estar con ellos;
2 pamba te mitema na bango ekanisaka kaka kosala mabe, mpe bibebu na bango eyeisaka kaka mobulu soki elobi.
para que sus corazones traman la violencia y sus labios hablan de travesuras.
3 Ndako etongamaka na nzela ya bwanya, mpe elendisamaka na nzela ya mayele.
A través de la sabiduría se construye una casa; mediante la comprensión se establece;
4 Bashambre ekotondisama na biloko nyonso ya talo mpe ya kitoko na nzela ya boyebi.
por conocimiento las habitaciones se llenan con todos los tesoros raros y hermosos.
5 Moto ya bwanya atondi na nguya, moto oyo azalaka na boyebi alendisaka nguya na ye.
Un hombre sabio tiene un gran poder. Un hombre con conocimientos aumenta la fuerza,
6 Pamba te kolonga na etumba esengaka bwanya, mpe lobiko ezalaka kati na motango ebele ya bapesi toli.
pues con una sabia guía libras tu guerra, y la victoria está en muchos asesores.
7 Bwanya ezalaka likolo mingi mpo na zoba, yango wana azalaka te na likambo ya koloba kati na mayangani oyo esalemaka pembeni ya ekuke.
La sabiduría es demasiado elevada para un tonto. No abre la boca en la puerta.
8 Moto oyo asalaka mabongisi ya kosala mabe akokende sango lokola moteki baninga.
El que conspira para hacer el mal se le llamará intrigante.
9 Mabongisi ya bozoba ezali masumu, mpe bato bayinaka motioli.
Los planes de la locura son pecado. El burlador es detestado por los hombres.
10 Soki omilembisi na mokolo ya pasi, makasi na yo ekozala pamba.
Si flaqueas en el momento de la dificultad, tu fuerza es pequeña.
11 Kangola bato oyo bazali komema bango na kufa, mpe bikisa bato oyo bazali kokende na kufa lokola bato oyo balangwe masanga.
¡Rescata a los que están siendo llevados a la muerte! En efecto, ¡retened a los que se tambalean hacia la matanza!
12 Soki olobi: « Tala, toyebaki likambo moko te kati na makambo oyo nyonso; » boni, Ye oyo amekaka mitema asosolaka yango te? Ye oyo abatelaka molimo na yo ayebaka yango te? Afutaka te moto na moto kolanda misala na ye?
Si dices: “He aquí que no sabíamos esto” ¿acaso el que pesa los corazones no lo considera? El que guarda tu alma, ¿no lo sabe? ¿No ha de dar a cada uno según su trabajo?
13 Mwana na ngai, lia mafuta ya nzoyi, pamba te ezalaka kitoko! Mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi ekozala elengi na lolemo na yo.
Hijo mío, come miel, porque es buena, los excrementos del panal, que son dulces a su gusto;
14 Yeba lisusu ete bwanya ezali elengi mpo na molimo na yo; soki ozwi yango, yeba ete lobi na yo ekozala malamu, mpe elikya na yo ekozala ya pamba te.
así conocerás que la sabiduría es para tu alma. Si lo has encontrado, habrá una recompensa: Su esperanza no será cortada.
15 Yo moto mabe, komeka te kotia mitambo kati na ndako ya moto ya sembo, mpe komeka te kopanza yango,
No aceches, malvado, contra la morada de los justos. No destruyas su lugar de descanso;
16 pamba te ata soki moto ya sembo akweyi mbala sambo, akotelema kaka; nzokande pasi ekweyisaka moto mabe.
porque el justo cae siete veces y se levanta, pero los malvados son derribados por la calamidad.
17 Soki monguna na yo akweyi, kosepela te; mpe soki apengwi, tika ete motema na yo esepela te;
No te alegres cuando tu enemigo caiga. No dejes que tu corazón se alegre cuando sea derrocado,
18 noki te Yawe akomona, akosepela te mpe akokitisela yo kanda na Ye.
no sea que Yahvé lo vea y le desagrade, y aleja de él su ira.
19 Kosilika te likolo ya bato oyo basalaka mabe, kolula te bato mabe;
No te preocupes por los malhechores, ni tengas envidia de los malvados;
20 pamba te lobi ya malamu ekozala te mpo na moto oyo asalaka mabe, mpe mwinda ya bato mabe ekokufa.
porque no habrá recompensa para el hombre malo. La lámpara de los malvados se apagará.
21 Mwana na ngai, tosaka Yawe mpe mokonzi, kosanganaka te na batomboki,
Hijo mío, teme a Yahvé y al rey. No te unas a los rebeldes,
22 pamba te bango mibale bakoki kotindela batomboki pasi na pwasa. Bongo, nani ayebi pasi oyo bakoki kotinda?
porque su calamidad surgirá de repente. ¿Quién sabe qué destrucción puede venir de ambos?
23 Makambo oyo mpe ezali toli ya bato ya bwanya: Kopona bilongi, kati na kosambisa, ezali malamu te.
Estos son también los dichos de los sabios: Mostrar parcialidad en el juicio no es bueno.
24 Moto oyo alobaka na moto mabe: « Ozali moto ya sembo, » bato bakolakela ye mabe, mpe bikolo ekotombokela ye.
El que dice al impío: “Eres justo” los pueblos lo maldecirán, y las naciones lo aborrecerán —
25 Kasi bato oyo bapamelaka moto mabe bakozala malamu mpe lipamboli ekozala likolo na bango.
pero les irá bien a los que condenen a los culpables, y una rica bendición vendrá sobre ellos.
26 Eyano ya solo ezali lokola beze ya bibebu.
Una respuesta sincera es como un beso en los labios.
27 Bongisa libanda ya mosala na yo, bongisa bilanga na yo, bongo na sima, tonga ndako na yo.
Prepara tu trabajo en el exterior, y preparen sus campos. Después, construye tu casa.
28 Kotatola na pamba te mpo na kosala moninga na yo mabe; mpo na nini olingi kosalela bibebu na yo na lokuta?
No seas testigo contra tu prójimo sin motivo. No engañes con tus labios.
29 Kolobaka te: « Nakosala ye ndenge asali ngai, nakozongisela ye kolanda makambo oyo ye asali. »
No digas: “Haré con él lo que él ha hecho conmigo”; Pagaré al hombre según su trabajo”.
30 Nalekaki pembeni ya elanga ya moto ya goyigoyi, mpe pembeni ya elanga ya vino ya moto oyo azangi mayele;
Pasé por el campo del perezoso, por la viña del hombre vacío de entendimiento.
31 bongo, tala ndenge etondi na banzube, tala ndenge matiti mabe ezipi yango, mpe mir na yango ya mabanga ebukani.
He aquí que todo estaba cubierto de espinas. Su superficie estaba cubierta de ortigas, y su muro de piedra fue derribado.
32 Tango natiaki makanisi na ngai kati na makambo oyo namonaki, nazwaki mayele oyo:
Entonces vi, y consideré bien. Vi y recibí instrucción:
33 mwa pongi moke, mwa kopema moke, mwa kokanga maboko moke mpo na kolala,
un poco de sueño, un poco de sopor, un pequeño pliegue de las manos para dormir,
34 bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.
por lo que su pobreza vendrá como un ladrón y su necesidad como hombre armado.

< Masese 24 >