< Masese 22 >

1 Kokende sango ya malamu ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi; lokumu ezali malamu koleka palata mpe wolo.
A good name is more desirable than great riches; favor is better than silver and gold.
2 Mozwi mpe mobola bazali na likambo moko ya lisanga: ezali Yawe nde azali Mokeli na bango mibale.
The rich and the poor have this in common: The LORD is Maker of them all.
3 Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele akoleka wana mpe akokutana na pasi.
The prudent see danger and take cover, but the simple keep going and suffer the consequences.
4 Komikitisa mpe kotosa Yawe ememaka bozwi, lokumu mpe bomoi.
The rewards of humility and the fear of the LORD are wealth and honor and life.
5 Nzela ya bato mabe ezalaka na banzube mpe mitambo, kasi moto oyo abatelaka molimo na ye azalaka mosika na yango.
Thorns and snares lie on the path of the perverse; he who guards his soul stays far from them.
6 Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye; ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.
Train up a child in the way he should go, and when he is old he will not depart from it.
7 Mozwi azalaka mokonzi ya mobola, mpe modefi azalaka mowumbu ya modefisi.
The rich rule over the poor, and the borrower is slave to the lender.
8 Moto oyo alonaka masumu abukaka pasi, mpe makasi ya kanda na ye nyonso ekosuka.
He who sows injustice will reap disaster, and the rod of his fury will be destroyed.
9 Moto oyo akabaka na esengo akopambolama, pamba te akabolaka bilei na ye na mobola.
A generous man will be blessed, for he shares his bread with the poor.
10 Bengana motioli, bongo kowelana, koswana mpe kofingana ekosila.
Drive out the mocker, and conflict will depart; even quarreling and insults will cease.
11 Moto oyo alingaka kozala peto na motema, oyo ngolu ezalaka na bibebu na ye, mokonzi azalaka molingami na ye.
He who loves a pure heart and gracious lips will have the king for a friend.
12 Miso na Yawe ebatelaka boyebi, kasi akweyisaka maloba ya moto oyo azangi mayele.
The LORD’s eyes keep watch over knowledge, but He frustrates the words of the faithless.
13 Moto ya goyigoyi alobaka: « Nkosi ezali kuna na libanda, ekoboma ngai na kati-kati ya balabala. »
The slacker says, “There is a lion outside! I will be slain in the streets!”
14 Monoko ya mwasi ya ndumba ezalaka lokola libulu ya mozindo; moto oyo Yawe asilikeli akweyaka kuna.
The mouth of an adulteress is a deep pit; he who is under the wrath of the LORD will fall into it.
15 Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba, bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.
Foolishness is bound up in the heart of a child, but the rod of discipline drives it far from him.
16 Moto oyo anyokolaka mobola mpo ete akoma na bomengo mingi mpe oyo apesaka mozwi bakado bakokweya na bobola.
Oppressing the poor to enrich oneself or giving gifts to the rich will surely lead to poverty.
17 Pesa matoyi mpe yoka toli ya bato ya bwanya, mpe tika ete motema na yo endima mateya na ngai.
Incline your ear and hear the words of the wise— apply your mind to my knowledge—
18 Pamba te ekozala esengo soki obombi yango na motema na yo, mpe soki yango nyonso ezali pene ya bibebu na yo.
for it is pleasing when you keep them within you and they are constantly on your lips.
19 Nateyi yo yango lelo mpo ete elikya na yo ezala kati na Yawe.
So that your trust may be in the LORD, I instruct you today—yes, you.
20 Boni, lobi eleki, nakomelaki yo te batoli koleka tuku misato, batoli ya bwanya mpe ya boyebi,
Have I not written for you thirty sayings about counsel and knowledge,
21 batoli oyo epesaka mateya ya solo mpe maloba ya solo mpo ete okoka kozongisa biyano ya solo na moto oyo atindi yo?
to show you true and reliable words, that you may soundly answer those who sent you?
22 Kobotola te na makasi biloko ya mobola, pamba te azali mobola, konyokola te moto ya pasi na esambiselo,
Do not rob a poor man because he is poor, and do not crush the afflicted at the gate,
23 pamba te Yawe akobundela bango mpe akobebisa bomoi ya bato oyo bakobebisa bomoi na bango.
for the LORD will take up their case and will plunder those who rob them.
24 Kozala molingami te ya moto ya kanda, mpe kosangana te na moto ya motema moto-moto,
Do not make friends with an angry man, and do not associate with a hot-tempered man,
25 noki te okoyekola nzela na ye mpe okokangama na motambo na ye.
or you may learn his ways and entangle yourself in a snare.
26 Kozala te na molongo ya bato oyo batombolaka maboko mpo na kondima kofuta baniongo ya bato mosusu,
Do not be one who gives pledges, who puts up security for debts.
27 pamba te soki ozali na yo na makoki ya kofuta te, mpo na nini okolinga ete babotola ata mbeto na yo ya kolala?
If you have nothing with which to pay, why should your bed be taken from under you?
28 Kozongisa na sima te mondelo ya kala oyo batata na yo bakataki.
Do not move an ancient boundary stone which your fathers have placed.
29 Osila komona moto oyo ayebi mosala na ye malamu? Akosala kaka liboso ya bakonzi, akosala te liboso ya bato ya molili.
Do you see a man skilled in his work? He will be stationed in the presence of kings; he will not stand before obscure men.

< Masese 22 >