< Masese 20 >
1 Vino elobisaka bato maloba ya soni, masanga ya makasi ememaka mobulu; moto nyonso oyo amipesaka na yango akotikala te kokoma moto ya bwanya.
El vino es burlador y alborotador el licor, Y cualquiera que en ello se desvía no es sabio.
2 Somo oyo mokonzi apesaka ezali lokola koganga ya nkosi; moto oyo apesaka ye kanda amilukelaka ye moko pasi.
Como rugido de león es la ira del rey, El que provoca su ira expone su propia vida.
3 Koboya koswana epesaka moto lokumu, kasi moto oyo azangi mayele amipesaka na yango.
Honra del hombre es evitar la contienda, Pero todo insensato se envolverá en ella.
4 Moto ya goyigoyi asalaka bilanga te likolo ya kobanga malili; boye na tango ya kobuka mbuma, alukaka mpe kobuka, kasi akozwa eloko te.
En otoño no ara el holgazán, Rebuscará en la cosecha y nada hallará.
5 Makanisi ya motema ya moto ezalaka lokola ebale ya mozindo, moto ya mayele alukaka kotoka kati na yango.
Como agua profunda es el propósito en el corazón del hombre, Pero el hombre entendido logrará extraerlo.
6 Bato ebele batatolaka bolamu na bango, kasi nani akomona moto ya sembo?
Muchos hombres proclaman su propia bondad, Pero un hombre fiel, ¿quién lo hallará?
7 Moyengebene atambolaka na bosembo na ye; boye sima na ye, bana na ye bakozala bato ya esengo.
El justo camina en su integridad, Después de él, sus hijos son muy dichosos.
8 Soki mokonzi avandi na kiti mpo na kosambisa, miso na ye ebenganaka mabe nyonso.
Un rey sentado en el tribunal, Con su mirada disipa toda maldad.
9 Nani akoki koloba: « Nabatelaka motema na ngai peto, nazali peto, nazali na masumu te? »
¿Quién podrá decir: Tengo mi conciencia limpia, Estoy purificado de mi pecado?
10 Kilo mibale mpe bimekelo mibale, nyonso ezali nkele na miso ya Yawe.
Pesa falsa y medida falsa, Ambas son repugnancia a Yavé.
11 Bayebaka elenge mobali na nzela ya misala na ye, soki ezaleli na ye ezali peto mpe sembo.
Aun el muchacho es conocido por sus hechos, Si su conducta es limpia y recta.
12 Ezala litoyi oyo eyokaka to liso oyo emonaka, ezali Yawe nde asalaki nyonso mibale.
El oído que oye y el ojo que ve, Ambas cosas las hizo Yavé.
13 Kolingaka pongi te, noki te okokoma mobola; sala ete miso na yo ezalaka ya kofungwama, mpe okozanga te bilei ya kobomba.
No ames el sueño No sea que te empobrezcas. Abre tus ojos y te saciarás de pan.
14 Moto oyo asombaka biloko alobaka: « Biloko oyo ezali mabe! Ezali malamu te! » Kasi soki akei, atombolaka mapeka mpo na biloko oyo azwi.
Es malo, es malo, dice el comprador, Pero cuando se va, se jacta.
15 Wolo mpe babiju ezalaka na yango ebele, kasi bibebu oyo ebimisaka boyebi eleki na motuya.
Existe el oro y multitud de piedras preciosas, Pero los labios sabios son algo más precioso.
16 Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya.
Tómale la ropa al que salió fiador de un extraño, Y tómale prenda cuando da garantía a los forasteros.
17 Bilei oyo ezwami na nzela ya lokuta ezalaka elengi na monoko ya moto, kasi, na sima, monoko na ye etondaka na zelo.
Sabroso es al hombre el pan mal adquirido, Pero después su boca estará llena de fragmentos de piedra.
18 Soki ozali kosala mabongisi, tunaka toli; mpe soki olingi kobunda bitumba, zala na ekenge mpe na mayele.
Confirma los planes por medio del consejo, Y con sabias estrategias haz la guerra.
19 Moto ya bilobaloba abimisaka basekele; yango wana kima bato oyo balobaka mingi.
El que revela secretos levanta calumnia, Por tanto, no te metas con un chismoso.
20 Moto oyo alakelaka tata to mama na ye mabe, mwinda na ye ekokufa kati na molili.
Al que insulte a su padre o a su madre, Se le apagará su lámpara en medio de la oscuridad.
21 Bomengo oyo moto azwi noki-noki na ebandeli ekopambolama te na suka.
Herencia adquirida con robo al comienzo, Al fin no será bendita.
22 Kolobaka te: « Nakozongisa mabe na mabe oyo basali ngai! » Kasi talela Yawe, mpe akobikisa yo.
No digas: Yo me vengaré. Espera a Yavé, y Él te salvará.
23 Kilo oyo ekesana na kilo mosusu ezalaka nkele na miso ya Yawe, mpe emekelo kilo ya lokuta ezalaka eloko ya malamu te.
Las pesas desiguales son repugnancia a Yavé, Y una balanza con trampa no es buena.
24 Ezali Yawe nde atambolisaka matambe ya moto; bongo ndenge nini moto akoki kososola ye moko nzela na ye?
De Yavé son los pasos del hombre, ¿Cómo, pues, podrá el hombre entender su camino?
25 Ezali motambo mpo na moto koloba na lombangu: « Eloko oyo ebulisami mpo na Yawe, » mpe kokanisa sima na ye kolapa ndayi.
Trampa es al hombre el voto apresurado, Y después de hacerlo, reflexionar.
26 Mokonzi ya bwanya abenganaka bato mabe mpe azangaka te kopesa bango etumbu.
El rey sabio dispersa a los perversos, Y hace pasar sobre ellos la rueda de trillar.
27 Molimo ya moto ezali mwinda oyo Yawe apesi ye; esosolaka bozindo nyonso ya motema ya moto.
Lámpara de Yavé es el espíritu del hombre, Que escudriña lo más recóndito del ser.
28 Bolamu mpe solo ebatelaka mokonzi; alendisaka bokonzi na ye na nzela ya bolamu.
Misericordia y verdad preservan al rey, Y la clemencia sustenta su trono.
29 Makasi ezali biju ya bilenge, mpe suki ya pembe ezali lokumu ya mibange.
La gloria de los jóvenes es su fortaleza, Y el esplendor de los ancianos, sus canas.
30 Bapota elongolaka mabe, mpe bafimbu esukolaka bozindo ya molimo ya moto.
Las marcas de los azotes purifican del mal, Y los golpes llegan a lo íntimo del corazón.