< Masese 19 >

1 Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu koleka mokosi oyo azangi mayele.
Better is a poor person who walks in his integrity than one who is perverse in speech and is a fool.
2 Ezali malamu te kobungisa mayele, kati na bolingo oyo eleka ndelo. Lokolo ya moto oyo atambolaka noki-noki ezangaka te kobeta libaku.
Also, it is not good to have desire without knowledge and the one who runs too fast misses the path.
3 Bozoba ya moto ebebisaka bomoi na ye; mpe, na sima, akomaka kotombokela Yawe.
A person's folly ruins his life and his heart rages against Yahweh.
4 Mozwi azalaka na baninga ebele, kasi mobola akabwanaka ata na molingami na ye ya motema.
Wealth adds many friends, but a poor person is separated from his friends.
5 Motatoli ya lokuta akozwa etumbu; moto oyo akosaka akozanga te kozwa etumbu.
A false witness will not go unpunished and he who breathes out lies will not escape.
6 Bato mingi balukaka kosepelisa moto ya lokumu, mpe moto nyonso alukaka kozala molingami ya moto oyo asungaka bato.
Many will ask for a favor from a generous person and everyone is a friend of the one who gives gifts.
7 Soki bandeko nyonso ya mobola bayinaka ye, mpo na nini baninga na ye bakima ye te? Ata tango azali nanu koloba, batikalaka lisusu wana te.
All the brothers of a poor man hate him; how much more do his friends who go far away from him! He calls out to them, but they are gone.
8 Moto oyo alukaka kozwa bwanya alingaka bomoi na ye; moto oyo alingaka mayele alongaka.
He who gets wisdom loves his own life; he who keeps understanding will find what is good.
9 Motatoli ya lokuta azwaka etumbu; moto oyo akosaka akobebisama.
A false witness will not go unpunished, but the one who breathes out lies will perish.
10 Bomoi ya lokumu ebongi na zoba te; ebongi mpe te na mowumbu kopesa mitindo na bakambi.
It is not fitting for a fool to live in luxury— much less for a slave to rule over princes.
11 Bwanya ya moto ekomisaka ye motema molayi; mpe azwaka lokumu tango atalaka pamba mabe oyo basalaka ye.
Discretion makes a person slow to anger and it is his glory to overlook an offense.
12 Kanda ya mokonzi ezali lokola koganga ya nkosi, kasi bolamu na ye ezali lokola mamwe.
The wrath of the king is like the roaring of a young lion, but his favor is like dew on the grass.
13 Mwana ya zoba azali pasi mpo na tata na ye; koswana ya mwasi ezali lokola linzanza ya ndako, oyo etangisaka mayi tango nyonso.
A foolish son is ruin to his father and a quarreling wife is a constant dripping of water.
14 Moto akoki kozwa bandako mpe bomengo lokola libula kowuta epai ya batata, kasi mwasi ya bwanya azali likabo kowuta na Yawe.
A house and wealth are inherited from parents, but a prudent wife is from Yahweh.
15 Bogoyigoyi ememaka moto na pongi makasi, mpe moto ya goyigoyi akufaka nzala.
Laziness throws a person into a deep sleep, but the one not willing to work will go hungry.
16 Moto oyo atosaka mibeko abatelaka molimo na ye; moto oyo akebaka te na etamboli na ye akokufa.
The one who obeys the command guards his life, but the person who does not think about his ways will die.
17 Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.
Whoever is kind to the poor lends to Yahweh and he will repay him for what he has done.
18 Pesaka mwana na yo etumbu wana elikya ezali nanu, kasi kotomboka na yo ekoma te kino na posa ya koboma ye.
Discipline your son while there is hope and do not set your desire on putting him to death.
19 Tika ete moto oyo asilikaka makasi amema mokumba ya kanda na ye; pamba te soki obikisi ye, okotinda ye ete azongela lisusu.
A hot-tempered person must pay the penalty; if you rescue him, you will have to do it a second time.
20 Yoka toli mpe ndima mateya, mpo ete okoma moto ya bwanya.
Listen to advice and accept instruction, so you may become wise by the end of your life.
21 Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele, kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.
Many are the plans in a person's heart, but it is the purpose of Yahweh that will stand.
22 Eloko oyo moto alingaka epai ya moninga na ye moto ezali bolingo ya solo, mpe mobola azali malamu koleka mokosi.
Loyalty is what a person desires and a poor person is better than a liar.
23 Kotosa Yawe ememaka na bomoi, esalaka ete moto azala na kimia; boye ata mabe moko te ekokomela ye.
Honor for Yahweh leads people to life; anyone who has it will be satisfied and not afflicted by harm.
24 Moto ya goyigoyi akotisaka loboko na ye kati na bilei, kasi akokaka te kozongisa yango na monoko na ye.
The sluggard buries his hand in the dish; he will not even bring it back up to his mouth.
25 Beta motioli fimbu, mpe zoba akozwa mayele; sembola moto ya mayele, mpe akozwa boyebi.
Strike a mocker, and the naive person will become prudent; discipline one who is discerning, and he will gain knowledge.
26 Mwana oyo abetaka tata na ye mpe abenganaka mama na ye ayeisaka soni mpe mawa.
The one who robs his father and chases his mother away is a son who brings shame and reproach.
27 Mwana na ngai, soki otiki koyoka mateya, okobunga nzela ya maloba ya boyebi.
If you cease to hear instruction, my son, you will stray from the words of knowledge.
28 Moto oyo atiolaka bosembo azali motatoli ya zoba; mpe monoko ya bato mabe emelaka kaka mabe.
A corrupt witness mocks justice and the mouth of the wicked swallows iniquity.
29 Etumbu esalema mpo na batioli, mpe fimbu esalema mpo na bazoba.
Condemnation is ready for mockers and flogging for the backs of fools.

< Masese 19 >