< Masese 15 >
1 Eyano ya kimia ekimisaka kanda, kasi maloba oyo ezokisaka ebakisaka kanda.
Blag odgovor ublažava jarost, a riječ osorna uvećava srdžbu.
2 Lolemo ya moto ya bwanya ekomisaka boyebi elengi, kasi monoko ya bato oyo bazangi mayele ebimisaka bozoba.
Jezik mudrih ljudi proslavlja znanje, a usta bezumnih prosipaju ludost.
3 Miso na Yawe ezalaka bisika nyonso mpo na kotala bato mabe mpe bato ya malamu.
Oči su Jahvine na svakome mjestu i budno motre i zle i dobre.
4 Maloba ya kimia ezali lokola nzete ya bomoi, kasi maloba ya botomboki ezokisaka motema.
Blaga je besjeda drvo života, a pakosna je rana duhu.
5 Moto oyo azangi mayele atiolaka mateya ya tata na ye, kasi moto oyo andimaka pamela akokoma mayele.
Luđak prezire pouku oca svog, a tko ukor prima, pametno čini.
6 Ezalaka na bomengo ebele kati na ndako ya moyengebene, kasi lifuti ya moto mabe ememaka pasi.
U pravednikovoj je kući mnogo blaga, a opaki zarađuje propast svoju.
7 Bibebu ya moto ya bwanya esopaka boyebi, kasi ezali bongo te na motema ya zoba.
Usne mudrih siju znanje, a srce je bezumnika nepostojano.
8 Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.
Žrtva opakog mrska je Jahvi, a mila mu je molitva pravednika.
9 Nzela ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi alingaka moto oyo alandaka nzela ya sembo.
Put opakih Jahvi je mrzak, a mio mu je onaj koji ide za pravicom.
10 Moto oyo abimaka libanda ya nzela ya sembo akozwa pamela ya makasi; moto oyo aboyaka pamela akokufa.
Oštra kazna čeka onog tko ostavlja pravi put, a umrijet će tko mrzi ukor.
11 Ndenge mboka ya bakufi mpe mokili ya mozindo ezali penza polele liboso ya Yawe, ndenge wana mpe mitema ya bana ya bato ezali polele liboso na Ye. (Sheol )
I Šeol i Abadon stoje pred Jahvom, a nekmoli srca sinova ljudskih. (Sheol )
12 Moto ya moto makasi alingaka te moto oyo apamelaka ye, yango wana akendaka te epai ya bato ya bwanya.
Podsmjevač ne ljubi onog tko ga kori: on se ne druži s mudrima.
13 Motema ya esengo engengisaka elongi, kasi motema ya mawa elembisaka molimo.
Veselo srce razvedrava lice, a bol u srcu tjeskoba je duhu.
14 Motema ya moto ya mayele elukaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebimisaka kaka bozoba.
Razumno srce traži znanje, a bezumnička se usta bave ludošću.
15 Mikolo nyonso ezalaka mabe mpo na moto oyo azali na pasi, kasi bomoi ya moto oyo azali na esengo ezalaka tango nyonso na feti.
Svi su dani bijednikovi zli, a komu je srce sretno, na gozbi je bez prestanka.
16 Kozala na eloko moko kati na kotosa Yawe ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi kati na komitungisa.
Bolje je malo sa strahom Gospodnjim nego veliko blago i s njime nemir.
17 Kolia ndunda kati na bolingo ezali malamu koleka kolia ngombe ya mafuta kati na koyina.
Bolji je obrok povrća gdje je ljubav nego od utovljena vola gdje je mržnja.
18 Moto oyo atombokaka noki ayeisaka koswana, kasi moto oyo akangaka motema akitisaka koswana.
Gnjevljiv čovjek zameće svađu, a ustrpljiv utišava raspru.
19 Nzela ya moto ya goyigoyi ezalaka lokola banzela mike ya banzube, kasi nzela ya bato ya sembo ezalaka ya kosembolama.
Put je ljenivčev kao glogov trnjak, a utrta je staza pravednika.
20 Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi moto oyo azangi mayele atiolaka mama na ye.
Mudar sin veseli oca, a bezumnik prezire majku svoju.
21 Bozoba esepelisaka moto oyo azangi mayele, kasi moto ya mayele atambolaka alima na nzela na ye.
Ludost je veselje nerazumnomu, a razuman čovjek pravo hodi.
22 Mabongisi ekokisamaka te soki bato basangani te mpo na kopesa mayele, kasi ekokisamaka malamu soki bapesi toli bazali ebele.
Ne uspijevaju nakane kad nema vijećanja, a ostvaruju se gdje je mnogo savjetnika.
23 Kozongisa eyano ya malamu epesaka moto esengo, mpe liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezalaka kitoko.
Čovjek se veseli odgovoru usta svojih, i riječ u pravo vrijeme - kako je ljupka!
24 Nzela ya bomoi ememaka moto ya bwanya na likolo, mpo na kobatela ye ete akita na mboka ya bakufi te. (Sheol )
Razumnu čovjeku put života ide gore, da izmakne carstvu smrti koje je dolje. (Sheol )
25 Yawe abukaka ndako ya moto ya lolendo, kasi alendisaka libula ya mwasi oyo akufisa mobali.
Jahve ruši kuću oholima, a postavlja među udovici.
26 Makanisi ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi maloba ya malamu ezalaka peto na miso na Ye.
Mrske su Jahvi zle misli, a dobrostive riječi mile su mu.
27 Moto oyo alukaka litomba na nzela ya sembo te amemaka mitungisi na libota na ye, kasi moto oyo aboyaka kanyaka akozala na bomoi.
Tko se grabežu oda, razara svoj dom, a tko mrzi mito, živjet će.
28 Motema ya moyengebene ekanisaka liboso ya kopesa eyano, kasi monoko ya moto mabe ebimisaka maloba ya mabe.
Pravednikovo srce smišlja odgovor, a opakomu usta govore zlobom.
29 Yawe azalaka mosika ya bato mabe, kasi ayokaka libondeli ya bayengebene.
Daleko je Jahve od opakih, a uslišava molitvu pravednih.
30 Eloko oyo esepelisaka miso esepelisaka mpe motema; sango malamu elendisaka mikuwa.
Bistar pogled razveseli srce i radosna vijest oživi kosti.
31 Moto oyo ayokaka pamela oyo epesaka bomoi avandaka kati na bato ya bwanya.
Uho koje posluša spasonosan ukor prebiva među mudracima.
32 Moto oyo asundolaka koyekola atiolaka nde bomoi na ye moko, kasi moto oyo andimaka pamela akomaka mayele.
Tko odbaci pouku, prezire vlastitu dušu, a tko posluša ukor, stječe razboritost.
33 Kotosa Yawe ezali eteyelo ya bwanya; komikitisa eyaka liboso ya nkembo.
Strah je Gospodnji škola mudrosti, jer pred slavom ide poniznost.